5 Nakobuka ekuke ya Damasi, nakobebisa mokonzi ya bavandi ya Lubwaku ya Beti-Aveni, mpe oyo azali kokonza na Beti-Edeni ; mpe bato ya Siri bakokende na bowumbu na Kiri, » elobi Yawe.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jeroboami, misala na ye nyonso mpe elonga na ye na bitumba, ezala ndenge azongisaki na se ya bokonzi ya Isalaele Damasi mpe Amati, bingumba mibale oyo ezalaki ya Yuda, nyonso wana ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na bino, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Mpo na likambo na bino, nakotinda na Babiloni, mampinga ya basoda, mpe nakokitisa bato nyonso ya Babiloni lokola bakimi, ezala bato ya Chalide oyo bamikumisaka na koganga mpo na bamasuwa na bango.
Liboso ete mwana ayeba ndenge babengaka ‹ Tata na ngai › to ‹ mama na ngai, › bakomema bozwi ya Damasi mpe bomengo ya bitumba ya Samari epai ya mokonzi ya Asiri. »
Basoda ya Babiloni batiki kobunda, babombami kati na bandako batonga makasi. Makasi na bango esili, bakomi lokola basi. Bandako ya Babiloni etumbami mpe babuki bikangelo bikuke na yango.
Bikuke na yango ezindi na mabele ; abuki-buki mpe abebisi banzete oyo bakangelaka bikuke yango. Mokonzi mpe bakambi na ye bakei na bowumbu kati na bikolo, Mobeko ezali lisusu te, mpe basakoli na ye bazali kozwa lisusu te bimoniseli kowuta na Yawe.
Bino bana ya Isalaele, boni, bokokani te na bato ya mokili ya Kushi ? » elobi Yawe. « Boni, nabimisaki te Isalaele wuta na Ejipito, bato ya Filisitia wuta na Kreti, bato ya Siri wuta na Kiri ?
Tala malamu mampinga na yo, balemba lokola basi ; bikuke ya mokili na yo ezali polele liboso ya banguna na yo, pamba te moto ezikisi bikangelo na yango.