Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 1:4 - Mokanda na Bomoi

4 Nakotia moto na ndako ya mokonzi Azaeli, mpe moto yango ekozikisa bandako ya mokonzi Beni-Adadi, oyo batonga makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 1:4
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na ye : — Zonga na nzela oyo oyelaki mpe kende na esobe ya Damasi. Tango okokoma kuna, okopakola Azaeli mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Siri.


Bongo Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, abotolaki na maboko ya Beni-Adadi, mwana ya Azaeli, bingumba oyo Azaeli abotolaki na bitumba epai ya Yoakazi, tata ya Joasi. Joasi alongaki Azaeli mbala misato mpe abotolaki bingumba ya Isalaele.


Boye kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe akabaki Isalaele na maboko ya Azaeli, mokonzi ya Siri, mpe ya Beni-Adadi, mwana na ye ya mobali.


Sima na tango, Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, asangisaki mampinga na ye nyonso mpe akendeki kozingela engumba Samari.


Asa azwaki na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako na ye moko palata mpe wolo, mpe atindaki yango epai ya Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo :


Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › »


« Nakozikisa bamir ya Damasi na moto mpe moto yango ekozikisa bandako batonga makasi ya mokonzi Beni-Adadi. »


Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakokitisa moto kati na Ejipito mpe nakosukisa nguya nyonso ya basungi na yango.


Nakotinda moto kati na mokili ya Magogi mpe kati na bato oyo bavandi na kimia kati na bisanga ; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.


Isalaele abosani Mokeli na ye mpe atongi bandako ya kitoko ; Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi ; kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango, mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »


Nakotia moto na bamir ya engumba Tiri, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi. »


Nakotia moto na engumba Temani, mpe moto yango ekozikisa bandako ya Botsira, oyo batonga makasi. »


Nakotia moto na bamir ya engumba ya Raba, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi, kati na koganga na mokolo ya bitumba, kati na mopepe makasi na mokolo ya ekumbaki.


Nakotia moto na bamir ya Gaza, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi.


Nakotia moto kati na ekolo ya Moabi, mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba ya Kerioti, oyo batonga makasi. Moabi ekokufa kati na lokito ya makasi, na makelele ya bitumba mpe ya kelelo.


Nakotia moto kati na ekolo ya Yuda, mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba Yelusalemi, oyo batonga makasi. »


Nzambe azongiselaki bato ya Sishemi mabe nyonso oyo basalaki. Ezali ndenge wana nde elakeli mabe oyo Yotami, mwana mobali ya Yerubali, asakolaki ekokisamaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ