Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 1:14 - Mokanda na Bomoi

14 Nakotia moto na bamir ya engumba ya Raba, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi, kati na koganga na mokolo ya bitumba, kati na mopepe makasi na mokolo ya ekumbaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 1:14
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mobu oyo elandaki, na tango oyo bakonzi bazalaka na momesano ya kokende na bitumba, Davidi atindaki Joabi elongo na basali na ye mpe mampinga nyonso ya Isalaele. Babomaki bato ya Amoni mpe bazingelaki Raba. Kasi Davidi atikalaki na Yelusalemi.


Joabi abundisaki engumba Raba ya bato ya Amoni mpe abotolaki mboka mokonzi.


Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola ; atiaki bango mpe na mosala ya kosala babiliki. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni. Bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso.


Na mobu oyo elandaki, na tango oyo bakonzi bazalaka na momesano ya kokende na bitumba, Joabi akambaki mampinga na bitumba mpe abebisaki mokili ya bato ya Amoni ; bongo akendeki kotonga molako liboso ya Raba. Kasi Davidi atikalaki na Yelusalemi. Joabi abundisaki engumba Raba mpe apanzaki yango.


Soki kelelo ebeti, egangaka : ‹ Ah ! › Na mosika, eyokaka solo ya bitumba, koganga ya bakambi ya basoda mpe makelele ya bitumba.


Ndenge moto ezikisaka zamba, ndenge moto makasi ezikisaka bangomba,


Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoya epai na yo na nzela ya bakake, ya koningana ya mabele mpe ya lokito monene, ya mopepe makasi mpe ya mvula ya moto oyo etumbaka.


Yawe akosala ete bato bayoka mongongo na Ye ya nkembo mpe akomonisa bango nguya ya loboko na Ye kati na kanda makasi na Ye, kati na moto oyo ebomaka, kati na mvula makasi ya bakake mpe ya mabanga.


Pamba te mwana mobali moko abotami mpo na biso, mwana mobali moko apesameli biso, mpe bokonzi ezali na likolo ya mapeka na ye ; bakobenga ye : Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Mokonzi ya kimia.


Tala, mopepe makasi ya Yawe etomboki ! Kanda na Ye epeli lokola moto, bakake ezali konguluma mpe kokweyela bato mabe.


Kasi na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakosala ete lokito ya bitumba eyokana mpo na kobundisa Raba, engumba ya bato ya Amoni ; ekokoma esika ya mabe mpe bamboka mike na yango ekozikisama na moto. Bongo Isalaele akobengana bato oyo babenganaki ye, » elobi Yawe.


Mpo ete mitema na bango ekoka kolenga mpe bakufi bazala ebele, nasili kotia mopanga oyo ebomaka na bikuke nyonso ya bingumba na bango. Tala, bangalisi yango mpo ete epela lokola mikalikali ; basimbi yango mpo na koboma !


Ngai mpe, nakobeta maboko na Ngai ; mpe kanda na Ngai ya makasi ekokita. Ngai Yawe nde nalobi. »


Sala nzela moko mpo ete mopanga ekoma kino na Raba, engumba ya bato ya Amoni, mpe nzela mosusu mpo ete mopanga ekoma kino na Yelusalemi, engumba batonga makasi, kati na Yuda.


Nakokomisa engumba ya Raba lopango ya koleisela bashamo, mpe nakokomisa mokili ya bato ya Amoni esika oyo bibwele epemelaka. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.


nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo mpe nakokaba yo na maboko ya bikolo ya bapaya lokola bomengo ya bitumba ; nakolongola yo na molongo ya bikolo, nakosilisa bato na yo mpe nakobebisa yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›


Na tango ya suka, mokonzi ya sude akobundisa mokonzi ya nor, kasi mokonzi ya nor akobimela ye elongo na bashar, bampunda mpe bamasuwa ya bitumba. Akokota na makasi na bikolo ebele mpe akomema lokola mpela eloko nyonso oyo akomona na nzela.


Nakotia moto kati na ekolo ya Moabi, mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba ya Kerioti, oyo batonga makasi. Moabi ekokufa kati na lokito ya makasi, na makelele ya bitumba mpe ya kelelo.


Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »


Nzokande Ogi, mokonzi ya Bashani, atikalaki kaka ye moko na bomoi kati na bato ya Refayimi. Mbeto na ye ezalaki ya bibende ; molayi na yango ezalaki na bametele pene minei mpe mokuse na yango, bametele pene mibale. Mbeto yango ezali kino lelo na engumba Raba ya bato ya Amoni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ