Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 1:11 - Mokanda na Bomoi

11 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Edomi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te balandaki bandeko na bango na mopanga, bayokelaki bango mawa te, kanda na bango ezalaki tango nyonso komata, mpe bayina bango wuta kala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 1:11
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, tala bato ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi ya etuka ya bangomba Seiri, ba-oyo na tina na bango, tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito, opekisaki bana ya Isalaele kobotola mokili na bango ; mpe mpo na yango, balekaki pembeni-pembeni ya mokili na bango mpe babomaki bango te !


Tala lolenge nini bazali kofuta biso : bayei kobundisa mpe kobengana biso na mabele oyo opesaki biso lokola libula !


Bato ya Edomi bayaki lisusu kobundisa Yuda mpe bamemaki bakangami,


Yawe, kobosana te bato ya Edomi oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ; bazalaki koganga : « Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! »


Nzambe Mobikisi na biso, zongela biso ! Longola kanda na Yo na tina na biso !


Kotombokaka noki te, pamba te kanda evandaka kati na bazoba.


Nakosambisa mpo na libela te mpe nakozala na kanda tango nyonso te, noki te molimo ya moto nyonso oyo nasala ekokufa na miso na Ngai.


Kasi Isalaele abwaki makambo malamu ; yango wana, monguna akolanda ye.


Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.


Kasi nazali na kanda makasi mpo na bikolo oyo emonaka ete emikoka. Nazalaki kaka na kanda moke mpo na bato na Ngai, kasi bango bayei nde kobakisela bato na Ngai pasi. › »


« Ngai, nalingaki bino, » elobi Yawe, « kasi bino bozali kotuna Ngai : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete olingaki biso ? › Boni, Ezawu azalaki ndeko ya Jakobi te ? » elobi Yawe, « Nzokande, nalingaki Jakobi,


Edomi akoki koloba : « Ata babebisi mokili na biso, tokotonga yango kaka lisusu ! » Kasi tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Solo, bakotonga na bango yango, kasi Ngai nakobuka yango ! Bakobenga mokili yango : ‹ Mokili ya makambo mabe, bato oyo bazali tango nyonso na se ya kanda ya Yawe. ›


Boye, lokola bozali bana oyo Nzambe alingaka mingi, bomekolaka Ye.


Tango nyonso bokozala na bomoi, bokoki te kosala boyokani ya kimia elongo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ