Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Aje 2:9 - Mokanda na Bomoi

9 ‹ Nkembo ya Ndako ya sika ekozala monene koleka nkembo ya Ndako ya kala, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe nakotia kimia na esika oyo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Aje 2:9
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bibwele nyonso ya Kedari ekosangana epai na yo, bameme ya mibali ya Nebayoti ekosalela yo ; ekondimama lokola mbeka na likolo ya etumbelo na Ngai, mpe nakongengisa Tempelo na nzela ya nkembo na Ngai.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakosopela ye kimia lokola ebale, mpe bozwi ya bikolo lokola ebale na tango ya mpela ; bokobatelama, bokomemama na maboko na ye mpe akobondela bino na mabolongo na ye.


Bongo, Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kino na lopango ya kati, mpe nkembo na Yawe etondisaki Tempelo.


Bakokamba mokili ya Asiri mpe ya Nimirodi na mopanga. Boye, akokangola biso na bokonzi ya mampinga ya Asiri tango bakokota na makasi na mabele na biso mpe na bandelo na yango.


Bokende na likolo ya bangomba, bokata mpe boya na banzete mpo na kotonga Tempelo, bongo nakosepela mpe nakozwa lokumu, » elobi Yawe.


‹ Kati na bino oyo bozali na bomoi, nani amonaki Ndako oyo kati na nkembo na yango ya liboso ? Bongo sik’oyo, bozali komona yango ndenge nini ? Boni, ezali te komonana na miso na bino lokola eloko ya pamba ?


Natombolaki lisusu miso mpe namonaki moto moko liboso na ngai, asimbaki singa oyo bamekelaka molayi, na loboko na ye.


« Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo, mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka ! »


Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.


Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !


Atindaki Liloba na Ye epai ya bana ya Isalaele mpo na kosakola Sango Malamu ya kimia, na nzela ya Yesu-Klisto oyo azali Nkolo ya bato nyonso.


Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.


Bandeko na ngai, bosangisaka te kopona bilongi mpe kondimela Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo atonda na nkembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ