Nkembo ya Libani ekoya epai na yo, banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwisi ekoya elongo mpo na kobongisa Esika na Ngai ya bule ; mpe nakopesa lokumu na esika na Ngai, oyo natiaka makolo na Ngai.
Na esika ya bronze, nakomemela yo wolo, mpe na esika ya bibende, nakomemela yo palata ; na esika ya banzete, nakomemela yo bronze ; mpe na esika ya mabanga, nakomemela yo bibende ; nakokomisa Kimia moyangeli na yo, mpe Bosembo, mokambi na yo.