Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Aje 2:6 - Mokanda na Bomoi

6 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Na mwa tango moke, nakoningisa lisusu Likolo mpe mokili, ebale monene mpe mabele ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Aje 2:6
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

aningisaka mabele wuta na esika na yango mpe alengisaka makonzi na yango ;


Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye ; koganga na ngai mpo na kosenga lisungi ekomaki kino na matoyi na Ye.


Etikali tango moke kaka, moto mabe akozala lisusu te ; ata oluki ye, okomona ye te.


Kala mingi te, kanda na Ngai epai na bino ekosila mpe kanda na Ngai ya makasi ekobalukela bango mpo na kobebisa bango. »


Yango wana nakolengisa likolo, mpe mabele ekoningana na bisimbelo na yango na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, na mokolo oyo akopelisa kanda na Ye.


Bato bakokimela na madusu ya mabanga mpe na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.


Etikali kaka tango moke, Libani ekobongwana elanga ya kitoko, mpe elanga ya kitoko ekomonana lokola zamba.


Mampinga nyonso ya likolo ekobukana ; mpe mapata ekolingama lokola buku, bongo mampinga na yango nyonso ekokweya ndenge makasa ya nzete ya vino mpe ya figi ekweyaka.


‹ Na mikolo ekoya, › elobi Yawe, ‹ nakokokisa elaka kitoko oyo napesaki na mabota ya Isalaele mpe ya Yuda.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Elenge mwasi Babiloni azali lokola etando ya ble na tango banyataka-nyataka yango ; mpe etikali moke, tango ya kokata ble ekokoka mpo na yango.


Na zuwa mpe kanda na Ngai ya makasi, nalobi ete na tango wana, mabele ekoningana makasi kati na Isalaele.


Bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, banyama ya zamba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bato nyonso oyo bazali awa na mabele bakolenga liboso na Ngai ; bangomba ekopanzana, mabanga minene ekobukana mpe bamir nyonso ekokweya na mabele.


Nakolakisa bikamwa kuna na Likolo, mpe bilembo ya kokamwa awa na mokili : makila, moto mpe likonzi ya milinga.


Etikali moke, moke penza, ete Ye oyo asengeli koya aya, mpe akoya kala te.


Bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya nkota nyonso mpe ya mikili nyonso bakotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo, mpe bakoboya ete bakunda yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ