Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Aje 2:3 - Mokanda na Bomoi

3 ‹ Kati na bino oyo bozali na bomoi, nani amonaki Ndako oyo kati na nkembo na yango ya liboso ? Bongo sik’oyo, bozali komona yango ndenge nini ? Boni, ezali te komonana na miso na bino lokola eloko ya pamba ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Aje 2:3
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki : « Salomo, mwana na ngai ya mobali, azali nanu elenge mpe ayebi nanu makambo malamu te. Nzokande, Ndako oyo esengeli kotongama mpo na Yawe esengeli kozala monene, kitoko mpe na lokumu mingi na miso ya bikolo nyonso. Yango wana, nakobongisa biloko mpo na Ndako yango. » Boye Davidi abongisaki biloko ebele liboso ete akufa.


Bazalaki koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisela Yawe matondi : « Solo, azali malamu, bolingo na Ye mpo na Isalaele ewumelaka seko na seko ! » Bongo bato nyonso bazalaki kobeta milolo makasi mpo na kokumisa Yawe mpo ete bazalaki kotia miboko ya Tempelo ya Yawe.


Nzokande, kati na Banganga-Nzambe oyo ya mikolo, kati na Balevi oyo ya mikolo mpe kati na bakambi ya mabota, oyo ya mikolo, ezalaki na ebele oyo bamonaki Tempelo ya liboso ; bongo bazalaki kolela na mongongo makasi wana bazalaki kotia miboko ya Tempelo ya sika na miso na bango. Mpe kaka na tango yango, ebele ya bato mosusu bazalaki kosepela na koganga makasi mpe na kobeta milolo nzela moko na maboko.


Tempelo na biso ya bule mpe ya lokumu epai wapi batata na biso bazalaki koyemba masanzoli mpo na lokumu na Yo, esili kozika na moto ; mpe nyonso oyo tozalaki na yango ya motuya esili kobebisama !


Basalaki lolendo mpo na kitoko mpe motuya ya biloko na bango ya monzele oyo basalaki na yango banzambe na bango ya bikeko mpe bililingi ya somo. Yango wana, nakokomisa biloko yango mbindo na miso na bango.


‹ Nkembo ya Ndako ya sika ekozala monene koleka nkembo ya Ndako ya kala, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe nakotia kimia na esika oyo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ