Aje 2:2 - Mokanda na Bomoi2 « Loba na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; na Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe na bato nyonso oyo batikali : အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bato nyonso bazalaki kolela, wana bazalaki koyoka maloba ya Mibeko. Moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, elongo na Balevi oyo bazalaki kolimbolela bato Mibeko balobaki na bato nyonso : — Mokolo ya lelo ezali bule mpo na Yawe, Nzambe na biso ; botika kosala matanga mpe botika kolela !
Boye Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe bato nyonso oyo batikalaki batosaki mongongo ya Yawe, Nzambe na bango, mpe maloba ya mosakoli Aje kolanda ndenge Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye. Mpe bato nyonso bakomaki kobanga Yawe.