Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Aje 2:19 - Mokanda na Bomoi

19 Boni, bibombelo na bino ezali lisusu na bambuma ? Kino na moyi ya lelo, ata elanga moko te ya vino, ya figi, ya grenade mpe ya olive esili kobota bambuma. Kasi kobanda lelo, nakopambola bino. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Aje 2:19
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Izaki alonaki mbuma na mabele oyo mpe abukaki monkama na monkama na oyo alonaki, pamba te Yawe apambolaki ye.


Okotiela yango solo motema mpo na komemela yo bambuma mpe kosangisa yango na etutelo na yo ?


Ezali lokola mamwe ya Erimoni, oyo ekitaka na bangomba ya Siona. Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye, mpe bomoi, mpo na libela.


Pamba te, mpo na biso, Yawe Nzambe azali moyi mpe nguba ; Yawe apesaka ngolu mpe nkembo, aboyaka kopesa eloko moko te epai ya bato oyo batambolaka bazanga pamela.


Bakozonga na koganga ya esengo na bangomba ya Siona ; bakosepela na bomengo ya Yawe : ble, vino ya sika mpe mafuta, bameme mpe bangombe. Bakokoma lokola elanga ya kitoko oyo basopela mayi, mpe bakozala lisusu na mawa te.


Nakoleisa malamu Banganga-Nzambe na mafuta ya bibwele, mpe bato na Ngai bakotonda na biloko na Ngai, › » elobi Yawe.


Bilanga ya vino ekawuki, banzete ya figi elembi-lembi, banzete ya grenade, ya mbila mpe ya pome, banzete nyonso ya bilanga esili kokawuka. Solo, esengo ya bato esili.


Nani ayebi soki akoki kobongola makanisi to koyoka mawa mpe kotika na sima na Ye lipamboli, mpo ete bokoka lisusu kobonzela Yawe, Nzambe na bino, makabo ya bambuma to makabo ya masanga ya vino ?


Nabengaki bokawuki na bilanga, na bangomba, na ble, na vino, na mafuta, na mbuma nyonso ya mabele, na bato, na bibwele mpe na mbuma nyonso ya mosala na bino. »


Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo.


Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.


Osengeli kopesa ye na motema ya esengo kasi na mitema mibale te ; bongo Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na misala na yo nyonso mpe na eloko nyonso oyo maboko na yo ekosimba.


Yawe akosilisa koboma bino na bokono ya ndenge na ndenge oyo akotindela bino : fievele, kosila nzoto, mpese. Akotinda lisusu bokono oyo ekobebisa bilanga na bino : kozanga mvula, banyama mike oyo ebebisaka milona mpe bibende. Bokono nyonso oyo ekolanda bino kino bokosila kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ