Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Aje 2:18 - Mokanda na Bomoi

18 « Kobanda lelo, mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, botala malamu miboko ya Tempelo ya Yawe, oyo batiaki ; botala malamu penza makambo oyo ekoleka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Aje 2:18
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta tango wana, misala ya Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi etelemaki kino na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, mokonzi ya Persi.


Nzokande na mobu ya mitano, bokoki kolia bambuma yango. Na nzela wana, bambuma na bino ekokoma ebele. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa :


Mpe sik’oyo, kobanda lelo, botala malamu makambo oyo ekoya liboso ete libanga moko etiama na likolo ya libanga mosusu kati na Tempelo ya Yawe.


— Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo ; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.


« Solo, milona ekokola malamu, bilanga ya vino ekobota bambuma na yango, mabele ekobimisa biloko ebele, mpe likolo ekonokisa mvula. Nakopesa biloko oyo nyonso lokola libula epai ya batikali kati na bato oyo.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bino ba-oyo, na mikolo oyo, bozali koyoka maloba kaka oyo basakoli balobaki, lokola bazalaki awa na tango miboko ya Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaki kotongama, boyika mpiko mpe bolendisa maboko na bino mpo na kotonga Tempelo oyo ya Yawe.


Soki kaka bazalaki bato ya bwanya, balingaki kososola likambo oyo mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ