Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Aje 2:14 - Mokanda na Bomoi

14 Mosakoli Aje alobaki lisusu : « Bato oyo mpe ekolo oyo bazali nde ndenge wana na miso na Ngai, » elobi Yawe, « misala nyonso oyo basalaka mpe biloko nyonso oyo babonzelaka Ngai ezalaka ya mbindo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Aje 2:14
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.


Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele ; ezalaka nkele koleka soki amemi yango na makanisi mabe.


Miso ya lofundu, motema ya lolendo mpe kongenga ya bato mabe ezali masumu.


Moto oyo akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka mobeko, libondeli na ye ekomaka nkele na miso ya Nzambe.


Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe azali lokola ye oyo abomi moto, moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa, moto oyo apesi makabo ya mbuma azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu, moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko. Solo, baponi kolanda banzela na bango moko mpe kosepela na makambo na bango ya nkele.


Bakobonzela lisusu Yawe makabo ya masanga ya vino te, mpe bambeka na bango ekosepelisa lisusu Yawe te. Ekozala mpo na bango lokola bilei ya matanga : bato nyonso oyo bakolia yango bakokoma mbindo ; pamba te bilei na bango ekozala kaka mpo na mabumu na bango, kasi ekokota te na Tempelo ya Yawe.


Mpo na bato oyo bazali peto, nyonso ezalaka peto ; kasi mpo na bato oyo bazali mbindo mpe bazangi kondima, eloko moko te ezalaka peto, pamba te mayele mpe mitema na bango ezali mbindo.


mpo na bato mosusu, bobikisa bango na kobimisa bango na moto ; mpe mpo na bato mosusu lisusu, boyokela bango mpe mawa oyo esangana na bobangi, na koyina ezala ata bilamba na bango, oyo baposa na bango ya nzoto ekomisa mbindo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ