Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Aje 1:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bokende na likolo ya bangomba, bokata mpe boya na banzete mpo na kotonga Tempelo, bongo nakosepela mpe nakozwa lokumu, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Aje 1:8
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe sima na mibu nkama minei na mwambe, wuta Isalaele abimaki na Ejipito, mobu oyo ekokanaki na mobu ya minei ya bokonzi na ye kati na Isalaele, na sanza ya zivi.


Yawe alobaki na ye : « Nayoki losambo mpe libondeli na yo, oyo osali liboso na Ngai ; nabulisi Tempelo oyo otongi mpo ete natia Kombo na Ngai kati na yango mpo na libela. Miso mpe motema na Ngai ekobanda kozala kuna tango nyonso.


Sik’oyo, bobongisa mitema mpe milimo na bino mpo na koluka Yawe, Nzambe na bino. Bobanda kotonga Esika ya bule ya Yawe Nzambe mpo ete boyeisa Sanduku ya Boyokani ya Yawe mpe biloko ya bule ya Nzambe, na Tempelo oyo ekotongama mpo na Kombo na Yawe. »


Naponi mpe nabulisi Tempelo wana mpo ete Kombo na Ngai ezala kuna tango nyonso. Miso mpe motema na Ngai ekozala kuna na Tempelo yango mpo na libela.


Bapesaki mbongo epai ya batongi ndako mpe epai ya basharipantie ; bongo bapesaki lisusu bilei, masanga mpe mafuta epai ya bato ya Sidoni mpe ya Tiri mpo ete bamema, na nzela ya ebale monene, banzete ya sedele longwa na Libani kino na Jafa, na ndingisa ya Sirisi, mokonzi ya Persi.


Ekozala na milongo misato ya mabanga bakata mpe molongo moko ya mabaya ya sika mpo na motondo. Mbongo ya kofuta mpo na misala yango ekowuta na bomengo ya mokonzi.


Ezali na esika yango nde nakobanda kokutana na bana ya Isalaele ; bongo nkembo na Ngai ekobulisa esika yango.


Nkembo ya Libani ekoya epai na yo, banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwisi ekoya elongo mpo na kobongisa Esika na Ngai ya bule ; mpe nakopesa lokumu na esika na Ngai, oyo natiaka makolo na Ngai.


Bibwele nyonso ya Kedari ekosangana epai na yo, bameme ya mibali ya Nebayoti ekosalela yo ; ekondimama lokola mbeka na likolo ya etumbelo na Ngai, mpe nakongengisa Tempelo na nzela ya nkembo na Ngai.


Pamba te bokomela miliki mpe bokotonda mabele na ye, oyo ebondisaka ; bokomela penza ndenge esengeli mpe bokozwa esengo kati na bomengo na ye. »


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo oyo ezali kokomela bino.


nakoningisa bato ya bikolo nyonso, bomengo ya bikolo nyonso ekoya na esika oyo, mpe nakotondisa Ndako oyo na nkembo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


‹ Nkembo ya Ndako ya sika ekozala monene koleka nkembo ya Ndako ya kala, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe nakotia kimia na esika oyo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ