7 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo oyo ezali kokomela bino.
Pamba te ezali nde « Bilobaloba ya pamba. »
Tokota na mozindo ya kososola banzela na biso mpe totala malamu etamboli na biso, bongo tozonga epai na Yawe ;
Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo nyonso oyo ezali kokomela bino.
Bozali kolona milona ebele, kasi bozali kobuka bambuma moke kaka, bozali kolia kasi bozali kotonda te, bozali komela kasi bozali kosilisa posa na bino te, bozali kolata bilamba kasi malili ezali kosila te, mpe lifuti ya mosali ezali kokota na libenga etoboka. »
Bokende na likolo ya bangomba, bokata mpe boya na banzete mpo na kotonga Tempelo, bongo nakosepela mpe nakozwa lokumu, » elobi Yawe.
Mpe sik’oyo, kobanda lelo, botala malamu makambo oyo ekoya liboso ete libanga moko etiama na likolo ya libanga mosusu kati na Tempelo ya Yawe.
Mpo na kosukisa, bandeko na ngai, bosepelaka kati na Nkolo ! Ezali likambo ya pasi te mpo na ngai kokomela bino lisusu makambo oyo nakomelaki bino liboso, mpe yango ezali mpo na bolamu na bino.