Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Aje 1:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bozali kolona milona ebele, kasi bozali kobuka bambuma moke kaka, bozali kolia kasi bozali kotonda te, bozali komela kasi bozali kosilisa posa na bino te, bozali kolata bilamba kasi malili ezali kosila te, mpe lifuti ya mosali ezali kokota na libenga etoboka. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Aje 1:6
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Davidi azalaki mokonzi, nzala makasi ekotaki mpe esalaki mibu misato. Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe alobaki na ye : « Ezali mpo na Saulo mpe libota na ye oyo esopaki makila, pamba te babomaki bato ya Gabaoni. »


Mwasi yango azongiselaki ye : — Na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, nazali na lipa te ; nazali kaka na mwa ndambo ya farine na sani mpe ndambo ya mafuta na mbeki. Nazali kolokota mwa koni oyo nakomema na ndako mpo na kolamba bilei ya suka mpo na ngai mpe mpo na mwana na ngai ya mobali. Tango tokosilisa yango, ekotikala na biso kaka kozela kufa.


Bamoko bazalaki koloba : — Biso elongo na bana na biso ya mibali mpe ya basi, tozali ebele ; tozali na posa ya ble oyo ekoki na motango na biso mpo ete tolia mpe towumela na bomoi.


Wana azali kati na bomengo, pasi ekokomela ye, kilo nyonso ya pasi ekokweyela ye.


mayi ekomema ndako na ye mpe biloko nyonso ya ndako na ye, na mokolo ya kanda ya Nzambe.


kobongola mabele oyo ebotaka bambuma mabele ya mungwa likolo ya mabe ya bavandi na yango.


Moto oyo akabaka na motema malamu azwaka mingi koleka, mpe moto oyo abombaka kaka akomaka mobola.


Pamba te elanga ya vino ya ba-ekitare mibale ekobimisa kaka bisangala minei ya vino, bakilo nkama mibale na tuku mibale ya milona ya ble ekobimisa kaka bakilo tuku mibale na mibale. »


Bakolona ble, kasi bakobuka banzube ; bakobimisa mitoki na mosala, kasi bakozwa litomba ya malonga te. Boye, boyokela mbuma ya bilanga na bino soni, mpo na kanda makasi ya Yawe.


Mabele esili kokawuka, pamba te mvula ezali konoka lisusu te, basali bilanga bakomi na pasi mpe bazipi bilongi na bango mpo na soni.


Kasi wuta kaka tango totikaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, tozangela nyonso mpe tokoma kokufa na mopanga mpe na nzala makasi.


Bakolia, kasi bakotonda te ; bakosala kindumba, kasi bakobotana te ; pamba te basundolaki Yawe


« Lokola baloni mopepe, bakobuka mopepe ya makasi. Nzete ya ble oyo ezanga moto ebimisaka farine te. Ezala soki ebimisi mito, ezali bapaya nde bakolia yango.


Makasi na bino ekosila na pamba, mpo ete mabele na bino ekobota te mpe banzete ekobota te bambuma na yango.


Tango nakopimela bino bilei, basi zomi bakotumba mapa na fulu moko mpe bakobanda kopesa bino mapa yango na kilo : bokolia kasi bokotonda te.


Yango wana, likolo na bino, Lola ekangi mvula, mpe mabele eboyi kobota bambuma.


Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo nyonso oyo ezali kokomela bino.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo oyo ezali kokomela bino.


« Tala, bokanisaki kobuka bambuma ebele kasi bobuki kaka bambuma moke ; mpe tango bomemi yango na bandako na bino, nafuli yango mopepe. Mpo na nini boye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ? « Ezali mpo na Ndako na Ngai, oyo ezali ya kobeba, na tango oyo moto na moto azali komipesa na misala ya ndako na ye moko.


Tango moto moko azalaki koya mpo na kozwa bikolo tuku mibale ya ble na ebombelo, azalaki kokuta kaka bikolo zomi ; tango moto moko azalaki kokende na ekamolelo masanga ya vino mpo na kozwa bambeki tuku mitano ya vino, azalaki kaka kokuta bambeki tuku mibale.


Napesaki bino etumbu, tango nabebisaki misala na bino nyonso ya maboko, tango natindelaki yango bokono ya ndenge na ndenge mpe tango nanokisaki mvula ya mabanga. Kasi atako bongo, bozongaki epai na Ngai te, » elobi Yawe.


Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Pamba te, liboso ya tango wana, bato bazalaki kozwa lifuti ya malonga te na misala na bango, mpe banyama ezalaki kopesa ata litomba moko te ; moto moko te azalaki kokende na mosala na ye na kimia likolo ya kobanga banguna, pamba te nasalaki ete moto moko na moko atelemela moninga na ye.


Soki boyoki te, soki boboyi kozwa mokano ya kopesa Kombo na Ngai lokumu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakotindela bino elakeli mabe mpe nakolakela lipamboli na bino mabe. Solo, nasili kolakela yango mabe, pamba te bozwaki mokano te ya kopesa Kombo na Ngai lokumu.


Bitunga na bino mpe mesa na bino oyo bosalelaka mapa ekolakelama mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ