Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Aje 1:5 - Mokanda na Bomoi

5 Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo nyonso oyo ezali kokomela bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Aje 1:5
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Botambola pembeni ya Siona, bokende zingazinga na yango, botanga bandako na yango ya milayi.


Atako bongo, Faraon abalukaki, akotaki na ndako na ye mpe azwaki likambo yango na motema te.


Kasi ba-oyo babangaki te Liloba na Yawe, batikaki bawumbu mpe bibwele na bango kati na elanga.


Tokota na mozindo ya kososola banzela na biso mpe totala malamu etamboli na biso, bongo tozonga epai na Yawe ;


Lokola asosoli mabe na ye nyonso oyo azalaki kosala mpe atiki yango, akozala solo na bomoi, akokufa te.


Moto yango alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala na miso na yo mpe yoka na matoyi na yo ! Sala keba na makambo nyonso oyo nakolakisa yo, pamba te ezali mpo na kolakisa yo yango nde namemaki yo na esika oyo. Yebisa libota ya Isalaele makambo nyonso oyo okomona. »


Akobaki koloba na ngai : — Daniele, kobanga te ! Wuta mokolo ya liboso oyo ozwaki makanisi ya koluka kososola mpe komikitisa liboso ya Nzambe na yo, libondeli na yo eyokamaki, mpe nayaki lokola eyano na libondeli yango.


Balobaki lisusu na mokonzi : — Daniele, moko kati na bawumbu oyo bawutaki na Yuda, azali kotosa yo te, ezala mokano oyo okomaki na mokanda mpe otiaki mokoloto ; azali kokoba kaka kosambela mbala misato na mokolo.


« Boni, bokanisi ete ezali mpo na bino tango ya kovanda na bandako ya kitoko wana Tempelo ezali ya kobeba ? »


Bozali kolona milona ebele, kasi bozali kobuka bambuma moke kaka, bozali kolia kasi bozali kotonda te, bozali komela kasi bozali kosilisa posa na bino te, bozali kolata bilamba kasi malili ezali kosila te, mpe lifuti ya mosali ezali kokota na libenga etoboka. »


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo oyo ezali kokomela bino.


Bongo akomaki kokanisa na tina na bomoi na ye, alobaki : « Basali boni tata na ngai azwa na mosala mpe bazali kolia ndenge balingi, mpe biloko ya kolia eleki kutu ebele ; kasi ngai nazali kokufa awa na nzala !


Bomimeka bino moko mpe botala soki bozali kati na kondima ; bomitala penza bino moko malamu. Boyebi te ete Yesu-Klisto azali kati na bino ? Loba ete bosila kokweya liboso ya komekama.


Tika ete moko na moko atala malamu misala na ye ! Soki akoki komikumisa mpo na yango, akomikumisa mpo na ye moko kaka, kasi mpo na bato mosusu te ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ