Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Aje 1:4 - Mokanda na Bomoi

4 « Boni, bokanisi ete ezali mpo na bino tango ya kovanda na bandako ya kitoko wana Tempelo ezali ya kobeba ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Aje 1:4
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mokonzi alobaki na mosakoli Natan : — Tala nanu likambo oyo ! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo.


Kasi Elize alobaki na ye : — Boni, molimo na ngai ezalaki elongo na yo te tango moto wana akitaki na shar na ye mpo na kokutana na yo ? Ezali penza tango ya kozwa palata to ya kondima bilamba, bilanga ya nzete ya olive, ya vino, bameme, bangombe to basali ya mibali mpe basali ya basi ?


Okotelema solo mpo na Siona, pamba te ekomi tango ya koyokela yango mawa ; tango oyo ekatama ekoki.


batumbi Esika na Yo ya bule, bakweyisi mpe bakomisi mbindo esika oyo Kombo na Yo evandaka.


tango ya koboma mpe tango ya kobikisa, tango ya kobuka mpe tango ya kotonga ;


oyo alobaka : ‹ Nakotongisa ndako monene oyo ekozala na bashambre minene, na etaje ! › Boye atiaka yango maninisa minene, mabaya ya sedele na bamir na yango ya kati mpe akopakolaka yango langi ya motane.


« Mosakoli Mishe, moto ya Moresheti, asakolaki na tango ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda ; alobaki na bato nyonso ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga, Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti. ›


nakosala na Ndako oyo, makambo oyo nasalaki na Silo ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekobanda kotangaka kombo ya engumba oyo mpo na kolakela mabe. › »


Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bozali koloba na tina na esika oyo : ‘ Eh ! Esika oyo ebeba ! Ezalaka lisusu na bato mpe banyama te ! ’ Nzokande, kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi oyo ekoma polele, ezanga bato mpe banyama, ekozala lisusu na lokito :


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Kati na esika oyo ebebisama mpe ezanga bato to banyama, mpe kati na bingumba na yango nyonso, ekozala na lisusu na bitando ya matiti mpo na babateli bibwele, bitando epai wapi bakoleisa bibwele na bango.


Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi ; atumbaki bandako nyonso ya bato minene.


Yawe abwaki etumbelo na ye, asundoli esika na ye ya bule mpe akabi na maboko ya monguna bamir mpe bandako ya mokonzi na yango. Bato bagangi makasi kati na Tempelo ya Yawe ndenge bagangaka na mokolo ya feti oyo ekatama.


Ndenge nini wolo ebungisi kongenga na yango, wolo ya peto enzuluki ! Mabanga ya talo oyo ya bule epanzani na basonge ya babalabala nyonso.


« Yebisa libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosambwisa bosantu ya Esika na Ngai ya bule oyo esalaka lolendo na bino, oyo esepelisaka miso na bino mpe esalaka esengo ya mitema na bino. Bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo botikaki na Yelusalemi bakokufa na mopanga.


Nzokande na mobu ya mitano, bokoki kolia bambuma yango. Na nzela wana, bambuma na bino ekokoma ebele. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


Yango wana, likolo na bino, bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga. Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti.


Nzokande, Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje :


Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo nyonso oyo ezali kokomela bino.


« Tala, bokanisaki kobuka bambuma ebele kasi bobuki kaka bambuma moke ; mpe tango bomemi yango na bandako na bino, nafuli yango mopepe. Mpo na nini boye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ? « Ezali mpo na Ndako na Ngai, oyo ezali ya kobeba, na tango oyo moto na moto azali komipesa na misala ya ndako na ye moko.


Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.


bato nyonso oyo batikali balukaka kaka bolamu na bango moko, kasi bamipesaka te na makambo ya Yesu-Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ