Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Aje 1:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bato oyo bazali koloba ete tango ekoki nanu te mpo na kotonga Tempelo ya Yawe. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Aje 1:2
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi tango mokonzi Joasi akokisaki mibu pene tuku mibale na misato na bokonzi, Banganga-Nzambe babongisaki nanu Ndako ya Nzambe te.


Tango kaka batangaki mokanda ya mokonzi Aritakizerisesi liboso ya Rewumi ; Shimishayi, mokomi mikanda na ye, mpe baninga na bango ya mosala bakendeki mbala moko na Yelusalemi epai ya Bayuda mpe bapekisaki bango na makasi ete bakoba lisusu te kotonga.


Wuta mokolo wana, kati-kati kaka ya bato na ngai nde bazalaki kosala mosala ; kati-kati mosusu basimbaki makonga, banguba, matolotolo mpe balataki bilamba ya bibende oyo batiaka na tolo. Bakonzi ya basoda batelemaki na sima ya bato nyonso ya Yuda.


Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ezali kuna na libanda, ekoboma ngai na kati-kati ya balabala. »


Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.


Moto oyo atalaka mopepe akolona nkona te, moto oyo atalaka mapata akobuka bambuma te.


tango ya koboma mpe tango ya kobikisa, tango ya kobuka mpe tango ya kotonga ;


Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, na mokolo ya liboso ya sanza ya motoba, Yawe alobaki na nzela ya Mosakoli Aje liloba oyo epai ya Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; epai ya Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe :


Nzokande, Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje :


Kasi bato oyo bakendeki elongo na ye balobaki : — Tokokoka te kobundisa bato wana mpo ete bazali makasi koleka biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ