Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Aje 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, na mokolo ya liboso ya sanza ya motoba, Yawe alobaki na nzela ya Mosakoli Aje liloba oyo epai ya Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; epai ya Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Aje 1:1
41 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mbongo ya mpako ya bato ya mombongo oyo bazalaki koteka biloko oyo bazalaki kosomba na bamboka ya bapaya, mbongo ya mpako ya bateki biloko ya ndenge na ndenge, mbongo ya mpako oyo bakonzi nyonso ya Arabi bazalaki kofuta, mpe oyo bayangeli ya bituka bazalaki kokongola kati na mokili ya Isalaele.


Bakundaki ye, mpe Isalaele mobimba basalaki matanga ndenge kaka Yawe alobaki na nzela ya mowumbu na Ye, mosakoli Ayiya.


Ezalaki ye nde moto abotolaki lisusu bamboka ya Isalaele longwa na Lebo-Amati kino na ebale monene ya Araba, kolanda Liloba na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, mosakoli Yona, mwana mobali ya Amitayi, moto ya Gati-Eferi.


Libota ya Yekonia, mokangami : Shealitieli, mwana na ye ya mobali ;


Bana mibali ya Pedaya : Zorobabeli mpe Shimei. Bana mibali ya Zorobabeli : Meshulami mpe Anania. Shelomiti azalaki ndeko na bango ya mwasi.


Sirisi, mokonzi ya Persi, atindaki Mitredati, mobombi bozwi na ye, ete abimisa, atanga mpe apesa yango epai ya Sheshibatsari, moto ya libota ya bakambi ya Yuda.


Tala kati na bakitani ya Banganga-Nzambe, mibali oyo babalaki basi ya bapaya : Kati na bakitani ya Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki elongo na bandeko na ye ya mibali : Maaseya, Eliezeri, Yaribi mpe Gedalia.


Bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Seraya, Reyelaya, Maridoshe, Bilishani, Misipari, Bigivayi, Rewumi, Baana. Tala motango ya bana ya Isalaele :


Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango, na nzela ya Urimi mpe Tumimi.


Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na baninga na ye, Banganga-Nzambe, mpe Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, elongo na bandeko na ye, babandaki kotonga etumbelo ya Nzambe ya Isalaele mpo na kobonza kuna mbeka ya kotumba kolanda makomi kati na Mobeko ya Moyize, moto na Nzambe.


Na sanza ya mibale ya mobu ya mibale sima na bango kokoma na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na bandeko na bango mosusu, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato nyonso oyo bazongaki na Yelusalemi wuta na bowumbu, babandaki misala ya kotonga. Baponaki Balevi oyo bazalaki na mibu kobanda tuku mibale mpe komata mpo ete balandela misala ya kotonga Tempelo ya Yawe.


bayaki epai ya Zorobabeli mpe bakambi ya mabota ; balobaki na bango : — Botika ete tosunga bino na mosala ya kotonga Tempelo oyo, pamba te biso mpe tolukaka Nzambe na bino mpe tobonzelaka Ye mbeka wuta na tango ya Esari-Adoni, mokonzi ya Asiri, oyo amemaki biso awa.


Wuta tango wana, misala ya Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi etelemaki kino na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, mokonzi ya Persi.


Mosakoli Aje mpe mosakoli Zakari, mwana mobali ya Ido, basakolaki mpo na bato ya Yuda oyo bazalaki kati na mokili ya Yuda mpe na engumba Yelusalemi, na Kombo ya Nzambe ya Isalaele, oyo azalaki kati na bango.


Mbala moko, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezalaki na ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batunaki bango : — Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu mir oyo ?


Boye bakambi ya Bayuda bakobaki misala ya kotonga, mpe balongaki wana balendisamaki na maloba ya basakoli Aje mpe Zakari, mokitani ya Ido. Basilisaki kotonga kolanda mitindo ya Nzambe ya Isalaele mpe ya Sirisi, Dariusi, mpe Aritakizerisesi, bakonzi ya Persi.


Tala Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bawutaki na bowumbu elongo na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue : Seraya, Jeremi, Esidrasi,


Jozue abotaki Yoakimi, Yoakimi abotaki Eliashibi, Eliashibi abotaki Yoyada,


Wuta mokolo oyo mokonzi akomisaki ngai moyangeli kati na mokili ya Yuda, elingi koloba : kobanda na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi kino na mobu ya tuku misato na mibale, elekaki mibu zomi na mibale, ezala ngai to bandeko na ngai, totikalaki mokolo moko te kobika na mpako oyo bapesaka na moyangeli.


bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Azaria, Raamia, Naamani, Maridoshe, Bilishani, Misipereti, Bigivayi, Neumi mpe Baana. Tala motango ya bana ya Isalaele :


Bato nyonso bazalaki kolela, wana bazalaki koyoka maloba ya Mibeko. Moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, elongo na Balevi oyo bazalaki kolimbolela bato Mibeko balobaki na bato nyonso : — Mokolo ya lelo ezali bule mpo na Yawe, Nzambe na biso ; botika kosala matanga mpe botika kolela !


Kasi Moyize azongisaki : — Te Nkolo ! Nabondeli Yo ! Tinda moto mosusu oyo olingi mpo na kosala yango.


Boye Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe bato nyonso oyo batikalaki batosaki mongongo ya Yawe, Nzambe na bango, mpe maloba ya mosakoli Aje kolanda ndenge Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye. Mpe bato nyonso bakomaki kobanga Yawe.


Mpe Yawe alendisaki Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; mpe Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na bato nyonso oyo batikalaki. Bayaki mpe bamikotisaki na mosala ya kotonga Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na bango,


na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya motoba, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi.


« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bato oyo bazali koloba ete tango ekoki nanu te mpo na kotonga Tempelo ya Yawe. › »


Nzokande, Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje :


Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa :


Yawe alobaki, na mbala ya mibale, na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa :


« Loba na Zorobabeli, moyangeli ya Yuda, ete nakoningisa likolo mpe mabele,


Kasi sik’oyo, Zorobabeli, zala makasi, › elobi Yawe. ‹ Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, zala makasi. Bino nyonso bato ya ekolo, bozala makasi, › elobi Yawe, ‹ bosala mosala, pamba te nazali elongo na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Na sanza ya mwambe, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na mosakoli Zakari, mwana mobali ya Barashi, mwana mobali ya Ido :


Yawe alakisaki ngai Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo azalaki ya kotelema liboso ya Anjelu ya Yawe. Alakisaki ngai lisusu Satana oyo azalaki ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Jozue mpo na kofunda ye.


Ezali tango bobonzaka lokola mbeka nyama oyo ekufa miso ; boni, yango ezali mabe te ? Bomeka nanu kopesa yango epai ya moyangeli na bino ; boni, akosepela na bino ? Akondima bino solo ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Yoda, mwana mobali ya Yoanani ; Yoanani, mwana mobali ya Reza ; Reza, mwana mobali ya Zorobabeli ; Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Shealitieli, mwana mobali ya Neri ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ