Bakambi ya Tsoani bakomi penza lokola bazoba, bato ya bwanya ya Faraon bakomi kopesa batoli oyo ezanga tina. Ndenge nini bokoki penza koloba na Faraon : « Ngai, nazali moko kati na bato ya bwanya, moyekoli ya bakonzi ya kala ? »
Wapi sik’oyo bato na yo ya bwanya ? Tika ete balakisa yo mpe basosolisa yo makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, abongisaki mpo na kotelemela Ejipito.
Bato ya Ejipito bakosila mayele, mpe nakobebisa mabongisi na bango nyonso ; bakokende kotuna toli epai ya banzambe ya bikeko, epai ya milimo ya bakufi, epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.
Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo ; ekozala nde bikamwa likolo ya bikamwa kino bwanya ya bato ya bwanya ekobunga, mpe mayele ya bato ya mayele ekosuka. »