Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abidiasi 1:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bikolo nyonso oyo osalaki elongo na yango boyokani ekobengana yo na mokili na yo ; baninga na yo bakokosa yo, bakokonza yo. Ba-oyo bazalaki kolia lipa na yo bakotiela yo motambo. Kasi yo, okoyeba yango te mpo ete okozala lisusu na mayele te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abidiasi 1:7
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezala molingami na ngai ya kimia, oyo nazalaki kotiela motema mpe azalaki kolia sani moko elongo na ngai, abalukeli ngai.


Balobaka : « Pasi moko ya somo penza ekangi ye, ebwaki ye na mbeto mpe azali kokoka lisusu kotelema te. »


Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.


Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! Bofunda ye ! Tofunda ye ! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »


Baninga na yo nyonso babosani yo, bazali komitungisa lisusu te mpo na yo. Nabetaki yo penza ndenge monguna abetaka, napesaki yo penza etumbu na kanda makasi, pamba te ngambo na yo ezalaki monene mpe masumu na yo eleki ebele.


« Bakomema basi nyonso oyo bavandaka kati na ndako ya mokonzi ya Yuda epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, mpe basi yango bakoloba : ‹ Baninga na yo ya motema bakosi yo mpe balongi yo. Matambe na yo ezindi na potopoto, baninga na yo bakimi yo ! › »


Oh engumba ekufa, ozali kosala nini ? Olati bilamba ya motane mpe babiju ya wolo ; otie bonzenga na miso na yo. Ozali komikomisa kitoko na pamba, bamakangu na yo bazali kotiola yo mpe bazali koluka koboma yo.


Na tina na Edomi : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, engumba ya Temani etikali lisusu na bato ya bwanya te ? Bato ya mayele batikali lisusu na bososoli te ? Boni, bwanya na bango esili penza ?


Nabengisaki baninga na ngai, kasi bakosaki ngai. Banganga-Nzambe mpe bakambi na ngai bakufaki kati na engumba tango bazalaki koluka bilei mpo ete bawumela na bomoi.


Pasi ekomeli ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ; kasi mpo ete azali lokola mwana azanga mayele, soki tango ya kobotama ekoki, abimaka na libumu ya mama na ye te.


Efrayimi akomi lokola ebenga oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele : azali kosenga lisungi epai ya Ejipito, kasi azali mpe kokende na Asiri.


Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso ; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama : « Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai abalukeli ngai ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ