Nakopesa yo bomengo oyo babomba na molili, bozwi oyo batia na bisika ebombama, mpo okoka koyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo abengi yo na kombo na yo.
Kasi nakotika Ezawu bolumbu, mpe nakobimisa polele ebombamelo na ye, bongo akokoka lisusu komibomba te. Bana na ye ya mibali to bandeko na ye to mpe bazalani na ye bakosila kokufa ; moko te akotikala na bomoi.