Loboko na ngai ekamataki bomengo na bango ndenge bakamataka zala ya ndeke ; mpe ndenge bato balokotaka maki batika, ndenge wana mpe ngai nalokotaki mokili mobimba : moko te eningisaki lipapu to efungolaki monoko mpo na kobeta piololo. › »
Somo oyo bato bazali koyoka yo mpe lolendo ya motema na yo ezali kokosa yo. Yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba ; ata soki otongi zala na yo likolo lokola mpongo, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.
Ata soki mokili ya Babiloni emati kino na Lola mpe elendisi bandako na yango oyo batonga makasi, nakotindela yango bato mpo na kokweyisa yango, » elobi Yawe.
Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya sembo te ! Alukaka kosala zala na ye na likolo ya bangomba mpo na kokima ete makambo mabe ekomela ye.