Abidiasi 1:19 - Mokanda na Bomoi19 Bato oyo bakowuta na Negevi bakovanda na etuka ya bangomba ya Ezawu, mpe ba-oyo bavandaka na etando ya se ya lubwaku bakozwa mokili ya bato ya Filisitia. Bakozwa etuka ya Efrayimi mpe ya Samari, mpe bato ya Benjame bakozwa Galadi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango wana Nzambe ya Isalaele alamusaki molimo ya Puli, mokonzi ya Asiri, mpe molimo ya Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, mpo na komema na bowumbu : bato ya libota ya Ribeni, ya libota ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase. Amemaki bango na Ala, na Abori, na Ara mpe na ngambo ya ebale Gozani, epai wapi bazali kovanda kino lelo.
Solo, bakosomba lisusu bilanga na motuya ya palata, bakotia mikoloto mpe bakashe na mikanda oyo bakosombela bilanga yango, na miso ya batatoli, kati na mboka ya Benjame, kati na bamboka mike-mike oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi, kati na bingumba ya Yuda mpe kati na bingumba ya mokili ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi ; pamba te nakozongisa bato na bango oyo bakendeki na bowumbu, elobi Yawe. »