Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abidiasi 1:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bato ya Jakobi bakokoma lokola moto, libota ya Jozefi ekokoma lokola lolemo ya moto. Kasi libota ya Ezawu ekokoma lokola matiti, bongo moto ya libota ya Jakobi mpe ya Jozefi ekozikisa yango. Boye, kati na bana ya Ezawu, moto ata moko te akotikala na bomoi, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abidiasi 1:18
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe alobaki na ye : « Tika ete nkolo na ngai atangela ngai ngambo te, akanisa te mabe oyo mosali na ye asalaki mokolo oyo mokonzi, nkolo na ngai, alongwaki na Yelusalemi. Tika ete mokonzi alongola likambo yango na makanisi na ye.


Boye bana ya Isalaele bapanzanaki na Ejipito mobimba mpo na kolokota matiti ya kotumba na yango babiliki.


Pole ya Isalaele ekokoma moto, Mosantu ya Isalaele akopela lokola moto ; kaka na mokolo moko, akotumba mpe akozikisa basende mpe banzube ya Asiri,


Libanga na bango ya makasi ekolimwa na somo ; mpe bakambi na bango bakolenga na somo na komona bendele ya etumba, » elobi Yawe oyo moto na Ye ezali kati na Siona mpe fulu ya moto na Ye ezali kati na Yelusalemi.


Tala, bakozala solo lokola matiti ya kokawuka, matiti oyo moto ekotumba ; bakokoka kobikisa ata milimo na bango moko te na nguya ya moto : Ekozala lisusu te lokola makala ya moto mpo na koyetola to moto mpo na kovanda zingazinga na yango.


Yango wana, ndenge ndemo ya moto ezikisaka matiti, mpe ndenge matiti ya kokawuka esilaka na moto, ndenge wana mpe misisa na bango ekopola mpe bafololo na bango ekopumbwa lokola putulu, pamba te babwakaki Mobeko na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe batiolaki liloba ya Mosantu ya Isalaele.


Na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mokili eziki na moto, mpe bato bakomi lokola mafuta na moto. Moto moko te akobikisa ndeko na ye.


Na ngambo ya loboko ya mobali, bakobotola bato biloko, kasi bato bakozala kaka na nzala ; na ngambo ya loboko ya mwasi, bakolia, kasi bato bakotonda kaka te ; moko na moko akolia mosuni ya loboko na ye :


Ata moko te kati na bango akobika, pamba te nakotindela bato ya Anatoti pasi, na mobu ya etumbu na bango. »


« Mwana na moto, kamata eteni ya libaya mpe koma na likolo na yango : ‹ Mpo na Yuda mpe mpo na bana ya Isalaele oyo basangani na ye. › Kamata eteni mosusu ya libaya mpe koma na likolo na yango : ‹ Mpo na Jozefi, nzete ya Efrayimi, mpe mpo na libota mobimba ya Isalaele oyo esangani na ye. ›


Okozongisela bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakozwa libaya ya Jozefi, oyo ezali kati na loboko ya Efrayimi, mpe bato ya mabota ya Isalaele oyo basangani na ye ; nakokangisa yango na libaya ya Yuda. Nakokomisa yango nzete moko mpe ekokoma eloko moko kati na loboko na Ngai. ›


Batambolaka likolo ya basonge ya bangomba na makelele makasi lokola makelele ya bashar, lokola makelele ya matiti oyo ezali kozika, lokola mampinga moko ya basoda ya mpiko oyo babongami mpo na kokende na bitumba.


Nakoboma mokonzi ya bavandi ya Asidodi mpe oyo azali kokonza na Ashikeloni. Nakobalukela engumba Ekroni kino tango moto ya suka kati na bato ya Filisitia akokufa, » elobi Nkolo Yawe.


Boyinaka kosala mabe, kasi bolingaka nde kosala bolamu ; bolukaka bosembo tango bozali kosambisa. Tango mosusu Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoyokela ndambo ya bato oyo bamikomisaki mbindo te mawa kati na libota ya Jozefi.


Bozali komela bakopo etonda na masanga ya vino mpe bozali kopakola mafuta ya talo na banzoto na bino, kasi kobebisama ya ndako ya Jozefi ezali kosala bino pasi na mitema te.


Ndenge ozalaki komela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule, ndenge wana mpe bikolo bakokoma komela tango nyonso ; bakomela, bakomela lisusu koleka mpe bakosila lokola nde batikala kozala te.


Tika ete loboko na yo elonga banguna na yo, mpe bayini na yo nyonso babebisama nye !


Bakokoma lokola bato oyo bazali kati na banzube, lokola bato oyo balangwe masanga ya vino ; bakozikisama nye lokola matiti ya kokawuka.


Na mokolo wana, nakokomisa bakambi ya Yuda lokola moto kati na liboke ya bakoni, lokola koni ya moto na se ya liboke ya matiti ekawuka : bakozikisa bikolo nyonso ya zingazinga na bango, ezala oyo ezali na ngambo ya loboko na bango ya mobali to ya mwasi. Kasi Yelusalemi ekotikala kaka na esika na yango.


Nzokande, soki moto asaleli wolo to palata to mabanga ya talo to mabaya to makasa to mpe matiti mpo na kotonga na likolo ya moboko yango,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ