Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abidiasi 1:17 - Mokanda na Bomoi

17 Kasi bato oyo bakobika bakokimela na ngomba Siona ; ngomba yango ekokoma lisusu bule, mpe bato ya Jakobi bakozongela lisusu libula na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abidiasi 1:17
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete likolo mpe mabele, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekumisa Ye !


Siona ekosikolama na nzela ya boyengebene, mpe bato na yango oyo bakobongola mitema bakobika na nzela ya bosembo.


Na mokolo wana, nkona ya Yawe ekokoma kitoko mpe nkembo, bongo mbuma ya mabele ekosala lokumu mpe nkembo, ya ndambo ya bana ya Isalaele oyo babiki.


Bosembo na Ngai ekomi pene, ezali lisusu mosika te ; mpe lobiko na Ngai ekowumela te. Nakopesa lobiko epai na Siona, mpe nkembo na Ngai, epai na Isalaele.


Solo, bato na yo nyonso bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa mokili lokola libula mpo na libela ; bazali mwa nzete moke oyo nalonaki, mosala ya maboko na Ngai, mpo na komonisa nkembo na Ngai.


Nakobimisa libota moko kati na Jakobi ; mpe kati na Yuda, nakobimisa mokitani oyo akozwa bangomba na Ngai lokola libula ; bato na Ngai, ba-oyo naponi bakokamata yango lokola libula, mpe bawumbu na Ngai nde bakovanda kuna.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tango nakobimisa bango na bowumbu, tala lisusu maloba oyo bato bakoloba kati na Yuda mpe kati na bingumba na yango : ‹ Oh ndako ya bosembo ; oh ngomba ya bule, tika ete Yawe apambola yo ! ›


Kati na batikali ya Yuda oyo bayaki kovanda na Ejipito, moko te akobika to akotikala na bomoi, ata soki ayoki posa ya kozonga mpo na kovanda na mokili ya Yuda, bato moke kaka nde bakozonga. »


Kaka ndambo moke ya bato nde ekobika na mopanga mpe ekozonga na mokili ya Yuda, wuta na Ejipito. Boye, batikali nyonso ya Yuda, ba-oyo nyonso bayaki kovanda na Ejipito, bakoyeba soki liloba ya nani nde ekokokisama : ya Ngai to ya bango.


Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ; pamba te nazali elongo na yo, » elobi Yawe, « ata soki nabebisi bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino, nakobebisa yo nyonso te. Nakopamela yo solo, kasi nakosala yango na bosembo ; nakozanga te kopesa yo etumbu. »


Nakosala ete bato na Ngai, bana ya Isalaele, batambola na mokili na bino ; bakozwa mabele na bino mpe bokozala libula na bango ; bokotikala lisusu te koboma bana na bango.


Batikali bakokima na likolo ya bangomba ; mpe kuna, bakokoma kolelalela lokola bibenga, moto na moto mpo na masumu na ye.


kasi basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo bakozwa bokonzi mpe bakobatela yango mpo na libela, seko na seko.


Bongo moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Yawe akobikisama ; pamba te na ngomba Siona mpe na Yelusalemi, ekozala na bato oyo bakobika, kolanda ndenge Yawe alobaki, mpe bato oyo Yawe akobenga bakozala kati na bato oyo bakobika.


Solo, miso ya Nkolo Yawe ezali kotala bokonzi ya masumu ; nakobebisa mpe nakolongola yango na mabele. Nzokande, nakobebisa te libota mobimba ya Jakobi, » elobi Yawe.


« Solo, milona ekokola malamu, bilanga ya vino ekobota bambuma na yango, mabele ekobimisa biloko ebele, mpe likolo ekonokisa mvula. Nakopesa biloko oyo nyonso lokola libula epai ya batikali kati na bato oyo.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakozonga na Siona mpe nakovanda kati na Yelusalemi. Boye, Yelusalemi ekobengama Engumba ya bosolo ; mpe ngomba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ekobengama Ngomba ya bule. »


Eloko moko te ya mbindo ekokota kuna, mpe moto moko te oyo asalaka makambo ya nkele mpe alobaka lokuta akokota kuna ; kaka ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi ya Mpate nde bakokota kuna.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ