Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abidiasi 1:16 - Mokanda na Bomoi

16 Ndenge ozalaki komela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule, ndenge wana mpe bikolo bakokoma komela tango nyonso ; bakomela, bakomela lisusu koleka mpe bakosila lokola nde batikala kozala te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abidiasi 1:16
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta kala, navandaki nye, nakangaki monoko mpe motema na ngai ; kasi sik’oyo, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota, nazali koganga, nazali kolela mpe kopema na pasi.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki bato oyo basengeli komela kopo te bameli yango, bongo mpo na nini yo ozanga kozwa etumbu ? Te, okozanga te kozwa etumbu, mpe osengeli komela kopo yango !


Edomi, mboka kitoko, movandi ya mokili ya Utsi, sepela, zala na esengo ! Kasi yo mpe, bakopesa yo kopo ; okomela, okolangwa mpe okotikala bolumbu.


Bango nyonso bayaka nzela moko mpo na kotia mobulu, bakendaka kaka liboso lokola mopepe ya este, bazwaka bakangami ebele ndenge balokotaka mbuma ya zelo.


Pamba te tokomi na tango oyo kosambisama ezali kobanda epai ya bato ya Nzambe. Bongo soki ebandi epai na biso, ekosuka ndenge nini epai ya bato oyo batosaka te Sango Malamu ya Nzambe ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ