Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abidiasi 1:15 - Mokanda na Bomoi

15 Mokolo ya Yawe ekomi pene mpo na bikolo nyonso. Bakosala yo kaka makambo oyo yo osalaki, bongo mabe oyo osalaki ekozongela yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abidiasi 1:15
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi tango mokonzi ayokaki sango ya likita ya Amani, akomaki mobeko kati na mokanda mpo ete makanisi mabe oyo Amani abongisaki mpo na Bayuda ekweya na moto na ye moko mpe, lisusu, badiembika ye elongo na bana na ye ya mibali, na nzete.


Mpo na nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akataka tango te mpo na esambiselo ? Mpo na nini bato oyo bayebi Ye basengeli koluka na pamba mikolo ya boye ?


Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo, esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabe oyo osalaki biso !


Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakobengana bato mabe oyo bavandaka zingazinga ya ekolo na Ngai, oyo bazali kobundisa libula oyo napesaki bato na Ngai, Isalaele, mpe nakolongola ekolo ya Yuda kati na bango.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki bato oyo basengeli komela kopo te bameli yango, bongo mpo na nini yo ozanga kozwa etumbu ? Te, okozanga te kozwa etumbu, mpe osengeli komela kopo yango !


Bosangisa bato nyonso oyo babundaka na matolotolo mpo na kotelemela Babiloni ; tika ete bato nyonso oyo babundaka na makonga bazingela Babiloni mobimba, basala ete ata moto moko te akima, bafuta yango ndenge ezalaki misala na yango mpe bazongisela yango makambo oyo esalaki bikolo mosusu ; pamba te ebetaki tembe na Yawe, Mosantu ya Isalaele.


Mobebisi akoya kobundisa Babiloni ; bongo bakokanga basoda na yango ya mpiko mpe bakobuka matolotolo na bango, pamba te Yawe azali Nzambe oyo afutaka : afutaka kolanda misala ya moto na moto.


Pamba te mokolo yango ekomi pene ; mokolo ya Yawe ekomi pene, mokolo ya mapata, tango ya molili mpo na bikolo.


mpo na yango, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakopesa yo etumbu kolanda kanda mpe zuwa na yo, oyo olakisaki mpo na kosala bango mabe mpo ete oyinaki bango ; mpe Ngai moko, nakosala ete bayeba Ngai tango nakosambisa yo.


Mpo ete osepelaki na kobebisama ya libula ya Isalaele, nakosala yo mpe kaka ndenge wana : ngomba Seiri, okobebisama elongo na Edomi mobimba ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »


Mawa na mokolo wana ! Pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ; ekoya lokola libebi oyo ewuti epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Bobeta kelelo na Siona ! Bobelela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule ! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga, pamba te mokolo ya Yawe ezali koya ; solo, ekomi penza pene.


Yawe azali koganga lokola kake na liboso ya mampinga na Ye. Milongo ya mampinga na Ye etonda na basoda ; basoda oyo batosaka mitindo na Ye bazali na nguya. Mokolo ya Yawe ezali monene, ezali somo makasi ; nani akoki kotelema na mokolo yango ?


Mawa na bino oyo bozali na posa ya mokolo ya Yawe ! Bozali kozela nini na mokolo ya Yawe ? Ekozala mokolo ya molili, kasi ya pole te.


Boni, mokolo ya Yawe ekozala te mokolo ya molili ? Boni, ekozala te mokolo oyo ezanga pole ? Ekozala penza mokolo ya molili makasi, ata kongenga moke ekozala te.


Lokola obotolaki bomengo ya bato ya bikolo ebele na makasi, bato oyo batikali bakobotola yo mpe bomengo na yo na makasi, mpo ete osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.


Pamba te bakosambisa bino ndenge kaka bino bosambisaka baninga, mpe bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu.


Nzambe akosambisa na mawa te moto oyo ayokelaka bato mosusu mawa te. Mawa elongaka kosambisama.


Adoni-Bezeki alobaki : « Bakonzi tuku sambo, oyo bakata bango misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo, bazalaki kolokota biloko oyo ezalaki kokweya na se ya mesa na ngai. Sik’oyo, Nzambe azongiseli ngai makambo oyo nasalaki baninga. » Bamemaki ye na Yelusalemi, mpe akufaki kuna.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ