Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abidiasi 1:13 - Mokanda na Bomoi

13 Osengelaki te kokota na engumba ya bato na Ngai na mokolo ya pasi na bango to kosepela komona kobebisama na bango to mpe kobotola bozwi na bango nyonso na mokolo oyo bazalaki na pasi makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abidiasi 1:13
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mosusu Yawe akomona pasi na ngai, bongo akobongola na bolamu bilakeli mabe oyo ezali kokweyela ngai lelo. »


Soki nasepelaki na pasi ya monguna na ngai to nagangaki na esengo na likama oyo ekomelaki ye,


Bambwa ezingeli ngai, ngulupa ya bato mabe bayei kobundisa ngai, bazali kotambola zingazinga na ngai ; bakangi maboko mpe makolo na ngai na basinga.


Basoda ya bapaya bazali kati na milongo na ye, bazali lokola bana ngombe ya mibali mpe ya mafuta kati na etonga. Bango mpe bakobaluka mpe bakokima nzela moko ; bakokoka kolonga te, pamba te mokolo ya pasi ezali koya kokweyela bango : ezali tango ya etumbu mpo na bango.


Mpo ete olobaki : ‘ Mikili oyo mibale, Isalaele mpe Yuda, elongo na bikolo na yango ekokoma ya ngai, mpe nakozwa yango, ’ atako Yawe azalaki kuna ;


Lokola obokolaka tango nyonso koyina bana ya Isalaele kati na motema na yo mpe obomisaki bango na mopanga tango bazalaki na pasi makasi, na tango oyo bazwaki etumbu mpo na masumu na bango,


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Moyini alobaki na tina na bino : ‘ Ah, bangomba ya kala ekomi sik’oyo ya biso ! ’ ›


Yango wana, sakola ! Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola babebisaki bino mpe bapanzaki bino bipai nyonso mpo ete bokoma libula ya bikolo mosusu mpe eloko ya masolo ya kotiola mpe ya kofinga kati na bato ;


Kasi nazali na kanda makasi mpo na bikolo oyo emonaka ete emikoka. Nazalaki kaka na kanda moke mpo na bato na Ngai, kasi bango bayei nde kobakisela bato na Ngai pasi. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ