Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abidiasi 1:11 - Mokanda na Bomoi

11 Ozalaki kotala kaka bongo tango bato mosusu bazalaki kokende mpe komema bozwi na ye nyonso. Mpe tango bapaya bakotaki kati na engumba na ye, babetaki zeke mpo na kokabola bomengo ya bitumba ya Yelusalemi. Yo mpe osalaki kaka lokola bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abidiasi 1:11
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu bato oyo batikalaki kati na engumba, bato oyo bamipesaki epai ya mokonzi ya Babiloni mpe bato mosusu oyo batikalaki.


Yawe, kobosana te bato ya Edomi oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ; bazalaki koganga : « Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! »


Soki omoni moyibi, wana nde osepeli ; mpe ovandaka esika moko na bato na bikobo.


Bazali koloba : « Boya, toboma bango nyonso mpo ete ekolo na bango ezala lisusu te, mpo ete batanga lisusu kombo ya Isalaele te. »


Basangani mpe bayokani, basali boyokani mpo na kotelemela Yo :


Mpo ete olobaki : ‘ Mikili oyo mibale, Isalaele mpe Yuda, elongo na bikolo na yango ekokoma ya ngai, mpe nakozwa yango, ’ atako Yawe azalaki kuna ;


Nakolakisa bino bilembo ya kokamwa, na likolo mpe na mokili : makila, moto mpe makonzi ya milinga.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Gaza, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bamemaki bikolo ebele na bowumbu mpe batekaki bango na Edomi.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Tiri, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakabaki bato ebele na bowumbu epai ya bato ya Edomi mpe batosaki te boyokani ya bondeko.


Nzokande, yango mpe ekweyaki, mpe bamemaki bato na yango na bowumbu. Bakataki-kataki na biteni bana na bango na babalabala nyonso, babetaki zeke mpo na kopona bato na yango ya lokumu mpo ete bamema bango na bowumbu, mpe bakangaki bakambi na yango minyololo.


Wana nde lifuti oyo bakozwa mpo na lolendo na bango, pamba te bafingaki mpe batiolaki bato ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ