Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abidiasi 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Emoniseli ya mosakoli Abidiasi. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na tina na Edomi : « Toyoki sango moko kowuta na Yawe ; mpe ntoma moko atindami na bikolo mpo na koloba : ‹ Botelema. Tokende kobundisa Edomi. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abidiasi 1:1
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezawu alobaki na Jakobi : — Nalembi makasi ; tika ngai nalia elubu oyo, elubu oyo kaka. Yango wana bazalaki mpe kobenga ye Edomi.


Yango wana Ezawu, oyo azali Edomi, akendeki kovanda na ngomba Seiri.


Tala libota ya Ezawu, koko ya bato ya Edomi, na ngomba Seiri :


Yawe, kobosana te bato ya Edomi oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ; bazalaki koganga : « Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! »


Maloba na Yawe na tina na Duma. Moto moko azali kobelela Ngai wuta Seiri : « Mokengeli, olobi nini mpo na butu ? Mokengeli olobi nini mpo na butu ? »


Mokengeli azongisaki : Tongo elingi kotana, kasi butu mpe elingi koya. Soki bolingi kotuna mituna, botuna ; bongo bozonga mpe boya lisusu.


Ata bakalaka na bango bazali na Tsoani mpe bantoma na bango bakomi na Anesi,


Boye, nakamataki kopo yango na loboko ya Yawe mpe namelisaki yango bikolo nyonso epai wapi atindaki ngai :


Bobanga te mpe bolemba nzoto te tango bokoyoka basango ya mabe kati na mokili : mobu oyo, sango ya mabe ; mobu oyo elandi, sango mosusu ya mabe ; kaka sango ya mobulu kati na mokili to sango ya mokonzi moko abundisi mokonzi mosusu.


Moto oyo apasolaka nzela akotambola liboso na bango. Bakolekela na nzela oyo bapasoli, bakolekela na nzela ya ekuke mpe bakobimela na nzela yango. Mokonzi na bango akotambola liboso na bango, Yawe akozala liboso na bango.


Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.


Tango bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ