Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abakuki 3:6 - Mokanda na Bomoi

6 Tango atelemaki, mabele ekomaki koningana makasi ; tango abalolaki elongi na Ye mpo na kotala, bato ya bikolo bakomaki kolenga, bangomba milayi oyo ya kala-kala ebukanaki, mpe bangomba mikuse oyo ya kala-kala ekitaki ; kasi banzela na Ye ewumelaka seko na seko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abakuki 3:6
35 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mapamboli ya tata na yo ezali na motuya koleka mapamboli ya bangomba ya kala, koleka bomengo ya bangomba mike ya kala ; tika ete mapamboli nyonso ekita na moto ya Jozefi, ekitela ye oyo atombolami kati na bandeko na ye !


Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango lokola makasa to matiti ya kokawuka ?


Alongolaka bangomba na bisika na yango, wana yango moko eyebaka te, mpe, kati na kanda na Ye, akweyisaka yango ;


Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,


Soki atali mokili, mokili elengaka ; soki asimbi bangomba, ebimisaka milinga.


Tika ete bakoma lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ezali kopumbwisa, tango anjelu ya Yawe akotindika bango ;


Ngomba ya Bashani, ngomba ya Nzambe ; ngomba ya Bashani, ngomba ya basonge ebele,


Liboso ete bangomba ezala, liboso ete okela mabele mpe mokili, libela na libela, ozali Nzambe.


Bangomba enyangwamaka lokola mafuta liboso ya Yawe, liboso ya Nkolo ya mokili mobimba.


Bikolo eyoki sango na yango mpe ekomi kolenga, somo ekangaki bato ya Filisitia.


Bakambi ya Edomi bakomi na somo, bankumu ya Moabi bakomi kolenga, bato ya Kanana balembi nzoto.


Okomema bango mpe okovandisa bango na ngomba na Yo, esika oyo obongisaki, oh Nkolo, mpo na kovanda, Esika ya bule, oh Yawe, esika oyo maboko na Yo esalaki.


Milinga ezipaki ngomba Sinai mpo ete Yawe akitaki na likolo na yango na lolenge ya moto, bongo milinga yango ezalaki komata lokola milinga oyo ebimaka na fulu ya moto. Mpe ngomba nyonso eninganaki makasi.


Bakosalela mpe mobeko oyo soki ngombe ebeti mwana mobali to mwana mwasi maseke.


Botombola miso na bino na likolo, botala na se, na mabele ; likolo ekolimwa lokola milinga, mabele ekonuna lokola elamba, mpe bavandi na yango bakokufa lokola banzinzi. Kasi lobiko na ngai ekowumela seko na seko, bosembo na ngai ekotikala kokweya mokolo moko te.


Pamba te nseka ekolia bango lokola elamba, mpe bampese ekolia bango lokola elamba basala na bapwale ya meme ; kasi bosembo na ngai ekowumela seko na seko, mpe lobiko na ngai, bileko na bileko. »


Tika ete loboko na yo elonga banguna na yo, mpe bayini na yo nyonso babebisama nye !


Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye, mpe bangomba mikuse epanzanaka. Mabele, mokili mpe bavandi na yango balengaka liboso na Ye.


Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli ? Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, okufaka te. Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso ; mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango mpo na kopesa biso etumbu.


Soki bangomba emoni Yo, elengaka ; mayi etiolaka makasi, ebale monene etombokaka mpe bambonge na yango emataka kino na likolo.


Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.


Atalisaka boboto na Ye tango nyonso epai ya bato oyo batosaka Ye.


Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba ; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.


Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki na ekolo moko na moko mabele na yango, tango akabolaki bato nyonso, atiaki bandelo mpo na bato kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe.


na nzela ya bakado ya kitoko ya bangomba ya kala, mpe na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko ya bangomba mike oyo ewumelaka mobu na mobu ;


Yesu-Klisto azali ndenge moko : lobi oyo ewuti koleka, lelo, mpe libela na libela.


Jozue alongaki bakonzi wana nyonso na mbala moko mpe abotolaki bamboka na bango, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, azalaki kobundela Isalaele.


Bangomba eninganaki liboso ya Yawe, mpe ngomba Sinai, liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ