Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abakuki 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 Azalaki kongenga lokola moyi, mpe pole makasi ezalaki kobimela na loboko na Ye, epai wapi nguya na Ye ebombamaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abakuki 3:4
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Otambolisaki bango, na moyi, na nzela ya likonzi ya mapata, mpe, na butu, na nzela ya likonzi ya moto mpo na kongengisa nzela oyo basengelaki kotambola.


Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke ya misala na Ye mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka, nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye ? »


omifinika moyi lokola kazaka, otanda likolo lokola ndako ya kapo.


Akomisaki molili ebombamelo na Ye, kapo na Ye, oyo ezingelaki Ye ; mapata minene ezingelaki Ye, mwindo lokola mayi ya mozindo.


Yawe atambolaki liboso na bango, na moyi lokola likonzi ya lipata mpo na kolakisa bango nzela, mpe na butu lokola likonzi ya moto mpo na kongengisa bango, mpo ete batambola butu mpe moyi.


Likonzi ya lipata etelemaki kati ya mampinga ya bato ya Ejipito mpe ya bana ya Isalaele. Likonzi ya lipata epesaki molili na ngambo moko mpe engengisaki ngambo mosusu ; yango wana butu mobimba, bato ya Ejipito bakokaki kopusana te pembeni ya bana ya Isalaele.


Kombo ya Yawe ezali lokola ndako molayi batonga makasi ; moyengebene akimelaka kuna mpe azwaka ebombamelo ya makasi.


Namonaki lisusu ete likolo ya loketo na yango ezalaki kongenga lokola linzanza, zingazinga na yango ezalaki lokola moto, se ya loketo na yango ezalaki lokola moto ; mpe mikalikali ya makasi ezingelaki yango.


mpe namonaki nkembo na Nzambe ya Isalaele koya wuta na ngambo ya este. Mongongo na Ye ezalaki lokola makelele ya mayi minene, mpe mokili ekomaki kongenga na nkembo na Ye.


Yesu abongolamaki na miso na bango : elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole.


Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !


Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.


Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ