Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abakuki 3:19 - Mokanda na Bomoi

19 Nkolo Yawe azali makasi na ngai : akomisaka makolo na ngai lokola makolo ya mboloko, apesaka ngai makasi ya komata kino na likolo ya bangomba. Wuta na buku ya motambolisi banzembo. Babetaki yango na mandanda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abakuki 3:19
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali misato ya Tseruya bazalaki wana : Joabi, Abishayi mpe Asaeli. Asaeli azalaki mbangu lokola mboloko ya zamba.


akomisaka makolo na ngai lokola ya mboloko mpe avandisaka ngai na bisika ya likolo ;


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, mosali na Yawe. Ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo.


Nani azali Nzambe soki Yawe te ? Nani azali libanga soki Nzambe na biso te ?


Nzambe apesaka ngai makasi mpe akomisaka nzela na ngai ya kokoka ;


akomisaka makolo na ngai lokola ya mboloko, mpe avandisaka ngai na bisika ya likolo ;


Nzembo ya Davidi. Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ; nakobanga nani ? Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ; nakolenga liboso ya nani ?


Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.


Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino na kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga : Bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.


Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; azali lobiko na ngai. »


Bakoloba na tina na Ngai : ‹ Makasi mpe bosembo ezali kati na Yawe kaka. › » Bato nyonso oyo batombokelaki Ye bakoya epai na Ye mpe bakoyoka soni.


wana okozwa esengo na yo kati na Yawe mpe nakomema yo na bisika ya likolo ya mokili, nakoleisa yo wuta na libula ya Jakobi, tata na yo, » elobi Yawe.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Moyini alobaki na tina na bino : ‘ Ah, bangomba ya kala ekomi sik’oyo ya biso ! ’ ›


Nakosala ete balendisama kati na Yawe : bakotambola na Kombo na Ye, » elobi Yawe.


mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye,


Akambaki bango na bisika oyo eleki likolo kati na mokili, aleisaki bango bambuma ya elanga, amelisaki bango mafuta ya nzoyi oyo ezalaki kobima na libanga, mafuta oyo ezalaki kobima na mabele ya mabanga,


Oh Isalaele, ozali solo libota ya esengo ! Libota nini ekokani na yo, yo libota oyo Yawe abikisi ? Ye azali nde nguba na yo mpe mosungi na yo ya nkembo. Banguna na yo bakokima liboso na yo, mpe okonyata bisika na bango, oyo eleki likolo. »


Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.


mpo ete bokoma bato na nguya kati na makambo nyonso kolanda makasi ya nkembo na Ye, mpo ete boyikela nyonso mpiko mpe bozala na molende mpe esengo kino na suka ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ