15 Otambolaka na ebale elongo na bampunda na Yo ; boye oningisaka mayi minene.
Na lokito ya kake na Yo, mikalikali engengisaki mokili, mabele eninganaki mpe elengaki.
Opasolaki nzela kati na ebale monene, balabala na Yo kati na mayi monene, mpe moto moko te amonaki bilembo ya matambe na Yo.
Na pema ya zolo na Yo, mayi ekabwani, bambonge etelemi lokola mir, mpe mozindo ya mayi ekangami kati na ebale monene.
Oh Yawe, otombokelaki nde bibale ? Osopelaki nde miluka kanda na Yo ? Osilikelaki nde ebale monene tango ozalaki kotambola likolo ya bampunda, likolo ya bashar na Yo ya lokumu ?