« Tala, nakomisi yo lokola libaya ya sika ya kotutela ble, oyo batia minu bapelisa makasi, lokola mbeli ya sika, mbeli ya minu makasi ; okopanza bangomba milayi, okokomisa yango putulu ; okokomisa bangomba ya mikuse lokola matiti ya kokawuka,
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Elenge mwasi Babiloni azali lokola etando ya ble na tango banyataka-nyataka yango ; mpe etikali moke, tango ya kokata ble ekokoka mpo na yango.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Damasi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakataki-kataki bato ya Galadi na nzela ya bibende oyo etimolaka mabele mpo na kosala bilanga.
Kasi nazali na kanda makasi mpo na bikolo oyo emonaka ete emikoka. Nazalaki kaka na kanda moke mpo na bato na Ngai, kasi bango bayei nde kobakisela bato na Ngai pasi. › »