9 Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya sembo te ! Alukaka kosala zala na ye na likolo ya bangomba mpo na kokima ete makambo mabe ekomela ye.
Bozali koloba : « Tosalaki boyokani elongo na kufa, boyokani elongo na mboka ya bakufi. Tango likama ya makasi ekoya, ekozwa biso te ; pamba te tokomisi lokuta ekimelo na biso mpe makambo ya lokuta ebombamelo na biso. »
Mawa na bino bato oyo bobakisaka ndako likolo ya ndako, elanga pembeni ya elanga, kino bokangaka bisika nyonso mpe botikalaka kaka bino moko na mokili !
Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. Boye, bomengo yango ekokima na kati-kati ya bomoi na ye mpe ekomonisa bozoba na ye na suka ya bomoi na ye.
Yo oyo ovandaka na Libani, yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele, yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo, pasi oyo ekokani na pasi ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota !
Somo oyo bato bazali koyoka yo mpe lolendo ya motema na yo ezali kokosa yo. Yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba ; ata soki otongi zala na yo likolo lokola mpongo, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.
Ata soki mokili ya Babiloni emati kino na Lola mpe elendisi bandako na yango oyo batonga makasi, nakotindela yango bato mpo na kokweyisa yango, » elobi Yawe.
Bakalaka kati na yango bazali lokola mbwa ya zamba oyo ezali kopasola nyama na yango, bazali kosopa makila mpe koboma bato mpo na kozwa bomengo na nzela ya mabe.