Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abakuki 2:7 - Mokanda na Bomoi

7 Boni, bakolo biloko bakobimela yo te na pwasa ? Bakolamukela yo mpe bakolengisa yo. Boni, okokoma te lokola mosuni na bango ya kolia ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abakuki 2:7
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo atiaka moto makasi soki bapameli ye, akokweyisama na pwasa mpe akobika te.


Moto oyo atimoli libulu akoki kokweya kati na yango ; mpe moto oyo abuki mir ya lopango, nyoka ekoki koswa ye.


Motema likunya ya Efrayimi ekosila, mpe banguna ya Yuda bakobebisama ; Efrayimi akozala lisusu na motema likunya te mpo na Yuda to mpe Yuda akozala lisusu monguna ya Efrayimi te.


Nabimisaki moto moko wuta na ngambo ya nor, mpe azali koya, moto moko, wuta na ngambo ya este, oyo abelelaka Kombo na Ngai. Azali konyata bakambi ndenge banyataka potopoto, lokola potopoto ya mabele ya bikeko ya mosali mbeki.


Wuta na este, nabengi ndeke oyo eliaka misuni ; longwa na mokili ya mosika, moto oyo akokokisa mabongisi na Ngai. Makambo oyo nalobaki, yango nde ekokokisama ; oyo nabongisaki, yango nde ekosalema.


Pasi ekokomela yo, mpe okoyeba te ndenge ya kolongola yango ; mikakatano ekokomela yo mpe okokoka komibatela te ; libebi oyo oyebaki te ekokomela yo na pwasa.


Bopelisa basonge ya makonga, bokamata banguba na bino ; pamba te Yawe atindi bakonzi ya Medi mpo ete mokano na Ye ezali ya kobebisa Babiloni. Yawe akozongisa mabe na mabe, akosala yango mpo na Tempelo na Ye.


Nakolangwisa masanga : bakalaka mpe bato na yango ya bwanya, bayangeli, bakonzi ya basoda mpe basoda na yango ya mpiko. Bakolala pongi ya libela mpe bakolamuka lisusu te, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali : Yawe, Mokonzi ya mampinga.


« Botala, nakotindela bino banyoka oyo ebomaka, bitupa oyo moto akoki kosakana na yango te, mpo ete eswa bino, » elobi Yawe.


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ