Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abakuki 2:5 - Mokanda na Bomoi

5 Solo, masanga ya vino ekosaka ; moto ya lolendo avandaka kimia te. Mpo ete azali lokoso lokola mboka ya bakufi mpe atondaka te lokola kufa, asangisaka bato ya bikolo nyonso pembeni na ye mpe akomisaka bango bawumbu na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abakuki 2:5
33 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, olongi Edomi, mpe motema na yo ezali komikumisa. Sepela na yo, kasi vanda na ndako na yo. Mpo na nini koluka ete pasi makasi ekweyela yo elongo na Yuda ?


Atako Yawe atombwama, atalaka bato oyo bamikitisa mpe amonaka na mosika bato ya lolendo.


Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu ; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya.


Kombo ya moto ya lofundu mpe ya lolendo ezali : « Motioli. » Asalaka makambo na lolendo oyo eleka ndelo.


Ndenge lifelo mpe mboka ya bakufi etondaka te, ndenge wana mpe miso ya moto etondaka te.


Ndenge bozwi ya moto ekomaka ebele, ndenge wana mpe bato oyo baliaka yango bakomaka ebele ; bongo litomba nini nkolo na yango akozwa, soki kaka te komona yango na miso ?


oyo azalaki kokweyisa bato na kanda mpe kobeta bango na kolemba te, oyo azalaki kokonza bikolo na kanda makasi mpe konyokola bango na mawa te.


Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, ndenge atombolaka mapeka : lolendo na ye oyo eleka ndelo mpe lofundu na ye, lolendo mpe maloba na ye ya lofundu ezanga na yango tina.


Lolendo ya moto ekosila mpe lofundu ya bato ekosuka ; Yawe kaka nde akonetolama na mokolo wana.


Mesa ebongisami, batandi bilamba ya mesa, bazali kolia mpe komela ! Bino bakonzi ya basoda, bopakola banguba na bino mafuta !


Boye, mboka ya bakufi ekoyoka nzala makasi mpe ekofungola monoko na yango makasi ; bato ya lokumu elongo na bato pamba ya engumba bakokita kuna nzela moko mpe na loyenge na bango.


Mawa na bino bato oyo bobakisaka ndako likolo ya ndako, elanga pembeni ya elanga, kino bokangaka bisika nyonso mpe botikalaka kaka bino moko na mokili !


nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.


Bosangisa bato nyonso oyo babundaka na matolotolo mpo na kotelemela Babiloni ; tika ete bato nyonso oyo babundaka na makonga bazingela Babiloni mobimba, basala ete ata moto moko te akima, bafuta yango ndenge ezalaki misala na yango mpe bazongisela yango makambo oyo esalaki bikolo mosusu ; pamba te ebetaki tembe na Yawe, Mosantu ya Isalaele.


Kasi tango bakokoma na posa makasi ya kosangisa nzoto, nakobongisela bango feti mpe nakolangwisa bango masanga mpo ete batondisama na esengo ; bongo, bakolala pongi ya libela mpe bakoka lisusu kolamuka te, » elobi Yawe,


Moto mabe azwaka yango nyonso na ndobo, akangaka yango na monyama mpe atiaka yango na kitunga. Yango wana asepelaka mpe atondaka na esengo.


Boni, akosepela solo kotika ete monyama na ye ezanga mbisi na kokoba koboma bato na mawa te ?


Tala, atondisami na lolendo, motema na ye ezali na bosembo te ; kasi moto ya sembo akobika na nzela ya kondima na ye.


ete bolukaka kobika bomoi na bino kati na kimia ; mpe tika ete moto nyonso atalaka makambo na ye moko mpe aliaka na motoki na ye moko, ndenge kaka toyebisaki bino yango,


Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ