Abakuki 2:19 - Mokanda na Bomoi19 Mawa na moto oyo alobaka na eteni ya nzete : « Telema ! » Mawa na moto oyo alobaka na libanga oyo ezanga bomoi : « Lamuka ! » Boni, ekeko ekoki solo kolakisa moto nzela ? Bazipa yango wolo mpe palata, kasi pema ezali te kati na yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bapakola yango palata balekisa na moto, oyo ewuta na Tarsisi, mpe wolo oyo ewuta na Ufazi ; bato oyo basalaka bililingi na banzete mpe ba-oyo balambaka bibende na moto nde basalaka yango : balatisaka yango bilamba ya langi ya ble mpe ya motane ; ezali misala ya bato oyo basalaka misala ya maboko, oyo bayebi penza mosala malamu.
Yango wana, nazwi mokano ete moto nyonso, azala ya mokili, ekolo to lokota nini, oyo akoloba mabe mpo na Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, bakokata-kata ye na biteni, bakobuka ndako na ye mpe bakokomisa yango mopiku ya mbindo, pamba te Nzambe mosusu azali te, oyo akoki kobikisa bato na Ye na lolenge oyo !
Yango wana, tango kaka bayokaki lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya bibetelo mindule lolenge nyonso, bato ya bikolo nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso bafukamaki mpo na kogumbamela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki.
Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso.