Davidi abengisaki ye. Iri aliaki mpe amelaki elongo na ye, mpe Davidi alangwisaki ye. Kasi na pokwa, Uri abimaki mpo na kokende kolala na mbeto na ye elongo na basali ya mokonzi, kasi akendeki na ndako na ye te.
Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobaki na ngai : « Kamata na loboko na Ngai kopo etonda na vino ya kanda na Ngai mpe melisa yango bikolo nyonso epai wapi nakotinda yo.
Na esika ete otondisama na nkembo, okotondisama na soni. Sik’oyo ekomi tango na yo, mela mpe tikala bolumbu ! Kopo oyo ewuti na loboko ya mobali ya Yawe eyei kozingela yo, mpe soni ekozipa nkembo na yo.
Pamba te bikolo nyonso emelaki vino ya kanda ya kindumba na yango. Bakonzi ya mokili basalaki ekobo elongo na Babiloni, mpe bozwi ya bato ya mokili, oyo basalaka mombongo, emataki makasi mpo na monzele na yango, oyo elekaki ndelo. »