Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abakuki 2:14 - Mokanda na Bomoi

14 Pamba te mokili ekotonda na boyebi ya nkembo na Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abakuki 2:14
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babola bakolia mpe bakotonda ; bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye. Tika ete bozala na bomoi libela na libela.


Tika ete Kombo na Ye ya nkembo epambolama libela na libela ! Tika ete mokili mobimba etonda na nkembo na Ye ! Amen ! Amen !


Nkolo, bikolo nyonso oyo osala ekoya kogumbama liboso na Yo mpe ekoya kopesa Kombo na Yo nkembo.


Mabe to kobebisama ekosalema lisusu te na likolo nyonso ya ngomba na Ngai ya bule, pamba te mokili ekotonda na boyebi ya Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.


Mikolo ya bomoi na yo ekozala na kimia ; bwanya mpe boyebi ekozala bomengo ya lobiko na yo ; kotosa Yawe, yango nde bozwi na yo.


Bongo, nkembo na Yawe ekomonisama, mpe bato nyonso bakomona yango elongo ; » pamba te Yawe nde alobi.


Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu : « Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye ! »


Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba : ‹ Yeba Yawe ! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »


Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano ; kasi na mbala oyo, mayi yango ekomaki ebale moko ya monene oyo nazalaki lisusu ata na makoki ya kokatisa te, pamba te mayi emataki makasi mpe ekomaki mozindo koleka. Bongo esengelaki kaka kokata mayi (na esika ya kokatisa yango na makolo), mpo ete moto moko te azalaki na makoki ya kokatisa ebale yango.


bobenganaki basi ya bato na ngai longwa na bandako na bango ya kitoko, bolongolaki mpo na libela mapamboli na ngai kati na bana na bango.


Mawa na moto oyo amelisaka moninga na ye masanga makasi kino asilisa mbeki nyonso mpe alangwa mpo ete amona bolumbu na ye !


Nzambe abimelaki na engumba Temani, Mosantu abimelaki na ngomba Parani. Nkembo na Ye ezipaki likolo, mpe lokumu na Ye etondisaki mabele.


Boye nakopetola bibebu ya bato ya bikolo mpo ete bango nyonso bazala ya kokoka mpo na kobelela Kombo ya Yawe mpe kosalela Ye na motema mobimba.


Kasi na Kombo na Ngai, mpe lokola mokili mobimba etondi na nkembo ya Yawe,


Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »


Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ