Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abakuki 1:5 - Mokanda na Bomoi

5 Botala nanu malamu bikolo mosusu mpe bokokamwa penza, pamba te nakosala likambo moko na tango na bino, likambo oyo bokondima te soki bayebisi bino yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abakuki 1:5
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo ; ekozala nde bikamwa likolo ya bikamwa kino bwanya ya bato ya bwanya ekobunga, mpe mayele ya bato ya mayele ekosuka. »


Bozanga maloba mpe bokamwa ! Bomiboma miso mpe botikala bakufi miso ! Bolangwa masanga, kasi na vino te ! Botenga-tenga, kasi na masanga ya makasi te !


Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »


Bakonzi ya mabele mpe bikolo mosusu ya mokili bandimaki te ete banguna mpe bayini bakokaki kokota na bikuke ya Yelusalemi.


Wana otindeli biso pasi makasi oyo, okokisi penza maloba oyo olobaki mpo na kotelemela biso mpe bakambi na biso ; mpe pasi oyo ekweyeli Yelusalemi etikala nanu kosalema te kati na mokili mobimba.


Oh Yawe, nayokaki sango ya Kombo na Yo ! Yawe, nabangaki misala na Yo. Sala yango lisusu na tango na biso ! Sala ete eyebana lisusu na tango na biso ! Kasi ata soki otomboki ndenge nini, kobosanaka te mawa na Yo mpo na biso.


« Nakosilisa kobebisa biloko nyonso oyo ezali kati na mokili, » elobi Yawe,


Yawe akopanza bino kati na bato. Kasi ndambo kaka ya bato kati na bino nde bakowumela kati na bikolo epai wapi Yawe akomema bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ