17 Boni, akosepela solo kotika ete monyama na ye ezanga mbisi na kokoba koboma bato na mawa te ?
Yawe abuki fimbu ya moto mabe, lingenda ya bokonzi ya bakambi,
oyo azalaki kokweyisa bato na kanda mpe kobeta bango na kolemba te, oyo azalaki kokonza bikolo na kanda makasi mpe konyokola bango na mawa te.
Balobi mbisi bakonyokwama mpe bakokoma kolela, bato nyonso oyo babwakaka ndobo mpe minyama na ebale Nili bakokoma na pasi.
Mabe oyo osalaki mokili ya Libani ekozongela yo, mpe somo ya banyama oyo obomaki ekokomela yo ; pamba te osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.