Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abakuki 1:15 - Mokanda na Bomoi

15 Moto mabe azwaka yango nyonso na ndobo, akangaka yango na monyama mpe atiaka yango na kitunga. Yango wana asepelaka mpe atondaka na esengo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abakuki 1:15
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abombamaka lokola nkosi kati na evandelo na yango, abombamaka mpo na kokanga moto oyo azangi nguya ; akangaka moto oyo azangi nguya na kotindika ye pembeni ya motambo.


Balobi mbisi bakonyokwama mpe bakokoma kolela, bato nyonso oyo babwakaka ndobo mpe minyama na ebale Nili bakokoma na pasi.


Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele ; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga.


Kati na bato na Ngai, ezali na bato mabe oyo banongaka bato lokola moto oyo azali kotia mitambo mpo na kokanga bandeke, mpe batiaka mitambo mpo na kokanga bato.


« Mpo ete bozali kosepela mpe bozali na esengo, bino bato oyo bozali kobebisa libula na Ngai ; mpo ete bozali kopumbwa-pumbwa lokola mwana ngombe ya mwasi oyo ezali konika ble mpe kolela lokola bampunda,


Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ozalaki kobeta maboko mpe kotuta makolo na esengo mpo na kotiola mokili ya Isalaele,


« Mwana na moto, lokola Tiri alobaki mpo na kotiola Yelusalemi : ‹ Ozwi ! Ekuke ya bikolo ebukani ! Bikuke na yango efungwami mpo na kotondisa ngai na bomengo ! Lokola esili kobebisama, Ngai sik’oyo, nakofuluka ! ›


Mpo ete osepelaki na kobebisama ya libula ya Isalaele, nakosala yo mpe kaka ndenge wana : ngomba Seiri, okobebisama elongo na Edomi mobimba ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »


Nkolo Yawe alapi ndayi mpo na bosantu na Ye : « Solo, na mikolo ekoya, bakomema bino mpe bana na bino na bandobo ;


Okomisi bato lokola bambisi ya ebale, lokola banyama oyo etambolaka na libumu mpe ezanga mokonzi.


Solo, masanga ya vino ekosaka ; moto ya lolendo avandaka kimia te. Mpo ete azali lokoso lokola mboka ya bakufi mpe atondaka te lokola kufa, asangisaka bato ya bikolo nyonso pembeni na ye mpe akomisaka bango bawumbu na ye.


Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.


Nzokande, mpo ete totia mobulu te kati na makanisi na bango, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi mpe kamata mbisi oyo okozwa ya liboso ; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo moko ya bibende kati na yango ; kamata mbongo yango mpe futa mpako na Ngai mpe mpako na yo, na maboko na bango.


Bavandi nyonso ya mokili bakosepela na tina na kufa na bango, bakosala feti mpe bakopesana bakado, pamba te basakoli wana mibale batungisaki mingi bavandi ya mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ