Pamba te azalaki koloba : ‹ Nazalaki kosala makambo oyo nyonso na makasi mpe na bwanya na ngai moko, pamba te nazali mayele ; napusaki bandelo ya bikolo, nabotolaki bomengo na bango lokola elombe, nalongaki bakonzi na bango.
Isalaele abulisamaki mpo na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na Ye : moto nyonso oyo azalaki kolia yango azalaki komema ngambo, mpe pasi ezalaki kokomela ye, › » elobi Yawe.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tika ete moto ya bwanya amikumisa te mpo na bwanya na ye to moto ya makasi mpo na makasi na ye to moto ya bozwi mpo na bozwi na ye.
amilobelaki : « Boni ! Oyo ezali te Babiloni monene oyo natongaki lokola ndako ya mokonzi, na makasi na ngai, na nguya na ngai mpe mpo na lokumu ya bokonzi na ngai ? »
Bongo abonzelaka monyama na ye mbeka, atumbelaka kitunga na ye ansa ; pamba te na nzela ya monyama mpe ya kitunga na ye, azwaka bambisi ebele mpe bilei ya kitoko.