Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Abakuki 1:10 - Mokanda na Bomoi

10 Batiolaka bakonzi mpe basekaka bakambi, basekaka bingumba batonga makasi, batondisaka mabele pembeni ya bamir mpo ete bamata likolo na yango mpe bakota na engumba mpo na kobotola yango,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Abakuki 1:10
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yeoyakini, mokonzi ya Yuda ; mama na ye, basali na ye, bakambi na ye mpe bakalaka na ye ya lokumu bamipesaki bango nyonso epai ya mokonzi Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Yeoyakini na boloko na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye.


Na suka ya mobu, mokonzi Nabukodonozori abengisaki ye mpe amemaki ye na Babiloni elongo na biloko ya motuya ya Tempelo ya Yawe ; akomisaki Sedesiasi, ndeko mobali ya Yeoyakini, mokonzi ya Yuda mpe ya Yelusalemi.


Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki ye mpe akangaki ye minyololo ya bronze mpo na komema ye na Babiloni.


Engumba Kalino ekweyaki te lokola engumba Karikemishi ? Engumba Amati, lokola engumba Aripadi te ? Engumba Samari, lokola engumba Damasi te ?


Bato oyo bazali komona yo batie miso na bango epai na yo, bazali komituna : ‹ Boni, ezali penza ye oyo azalaki koningisa mokili mpe kolengisa bikolo ?


Wapi mokonzi ya Amati, ya Aripadi, ya Layiri, ya engumba Sefarivayimi, ya Ena mpe ya Iva ? › »


« Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Koganga ya kobanga mpe ya somo nde ezali koyokana ; kimia ezali lisusu te.


Tala, banguna basili kobongama mpo na kobotola engumba ! Likolo ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, oyo bazali kobundisa yango. Makambo oyo olobaki ekokisami, ndenge ozali komona yango na mokolo ya lelo.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na bandako ya engumba oyo mpe ya bandako ya bakonzi ya Yuda, oyo babukaki mpo na kotelemela bangomba mike ya kokimela mpe mopanga ya monguna


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Longola ye eteni ya elamba ya moto, longola ye motole ! Makambo ekobongwana, ekozala lisusu te ndenge ezalaki liboso ! Bato oyo bakitisama bakotombwama, mpe ba-oyo batombwama bakokitisama.


akobebisa na mopanga bingumba na yo, oyo ezalaka pembeni ya ebale monene, akozingela yo, akotimola mabulu ya kobombamela zingazinga ya bamir na yo mpe akotombola banguba na ye mpo na kobundisa yo.


Na mokolo ya mbeka ya Yawe, nakopesa etumbu epai ya bakambi, epai ya bana mibali ya mokonzi mpe epai ya bato nyonso oyo balataka bilamba ya bapaya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ