Soki molingami oyo, wuta kati na ndako na ye, azongisi : « Kotungisa ngai te, nasili kokanga ekuke ya ndako na ngai ; ngai mpe bana na ngai tolali, nakoki kolamuka te mpo na kopesa yo mapa. »
Solo, nasengi lisusu na yo moninga na ngai ya motema kati na mosala : sunga basi oyo, pamba te babundaki mpo na Sango Malamu, elongo na ngai, Klema mpe baninga mosusu ya mosala oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi.
Yesu oyo babengaka Jistisi atindeli bino mbote. Kati na Bayuda oyo bakomaki Baklisto, kaka bango nde bazali kosala elongo na ngai mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpe bazali mpo na ngai kobondisama mobimba.
Yango wana totindaki Timote, ndeko na biso mpe moninga ya Nzambe kati na mosala ya kopanza Sango Malamu ya Klisto, mpo ete alendisa bino mpe apesa bino mpiko kati na kondima,
Yango wana, tango nakoya, nakobimisa mabe na ye na polele ; azali koloba makambo ya mabe mpe ya lokuta na tina na biso. Mpe asuki kaka wana te, azali ata koboya koyamba bandimi mosusu, azali kopekisa, kotelemela mpe kobengana na Lingomba, bato oyo bandimi koyamba bango.