2 Molingami na ngai, posa makasi ya motema na ngai ezali ete okende liboso na makambo na yo nyonso, mpe ozala na nzoto kolongono, ndenge molimo na yo ezali kokola.
Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.
Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.
Kasi biso bandeko balingami ya Nkolo, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino oyo Nkolo alingaka, pamba te Nzambe asila kopona bino wuta na ebandeli mpo ete bozwa lobiko, na nzela ya libulisi ya Molimo mpe ya kondima kati na solo.
Liboso na nyonso, bandeko na ngai, bolapaka ndayi te, ezala na kombo ya Likolo, ya mokili to mpe ya eloko nini. Tika ete « iyo » na bino etikala « iyo, » mpe « te » na bino etikala « te, » mpo ete bakatela bino etumbu te.
kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !