Alobaki na bango : — Malamu ! Bobanga te. Ezali Nzambe na bino, Nzambe ya tata na bino, nde atiaki bomengo kati na basaki na bino. Kasi mpo na mbongo na bino, ngai nazwaki yango. Sima, amemelaki bango Simeoni.
Mokengeli afungolelaka mobateli bameme ekuke, bameme eyokaka mongongo na ye. Mobateli abengaka bameme na ye na kombo na yango mpe abimisaka yango na libanda.
Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, wana bayekoli basanganaki esika moko kati na ndako mpe bakangaki malamu bikuke mpo ete bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda, Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !
Nazali lisusu na makambo ebele ya kokomela bino, kasi naboyi kosala yango na nzela ya lokasa mpe ya mayi ya ekomeli. Nazali na elikya ya koya kotala bino mpe ya kosolola malamu na bino, mpo ete esengo na biso ezala ya kokoka.